Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 10:15 - Mokanda na Bomoi

15 Kasi bana ya Isalaele balobaki na Yawe : — Ya solo, tosalaki lisumu na miso na Yo. Oyo omoni ete ezali malamu na miso na Yo, sala yango na biso ; kasi tobondeli Yo : bikisa biso lisusu sik’oyo !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 10:15
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yika mpiko, mpe tobunda lokola bilombe mpo na bato na biso mpe mpo na bingumba ya Nzambe na biso. Tika ete Yawe asala oyo ezali malamu na miso na Ye. »


Davidi alobaki na Natan : — Solo, nasalaki masumu epai na Yawe. Natan azongisaki : — Yawe alongoli masumu na yo ; okokufa te.


Kasi soki Nzambe alobi : « Nasepeli na yo te, » wana tika ete asala epai na ngai makambo oyo amoni ete ezali malamu, pamba te nazali ya kobongama.


Sima na Davidi kotanga bato, asosolaki ete amemi ngambo. Bongo Davidi alobaki na Yawe : — Nasali lisumu monene na kotanga bato. Sik’oyo, nabondeli Yo, oh Yawe, limbisa mabe ya mosali na Yo ; pamba te nasali makambo lokola moto ya liboma.


Davidi azongiselaki Gadi : — Nazali na pasi makasi na motema. Eleki malamu mpo na ngai kokweya na maboko ya Yawe, pamba te mawa na Ye ezali solo monene ; kasi tika ete nakweya te na maboko ya bato.


Boye akoyemba na miso ya bato mpe akoloba : ‹ Nasalaki masumu mpe natambolaki na bosembo te, kasi nazwi lifuti oyo nasengelaki kozwa te.


Moto oyo abombaka masumu na ye abongaka te, kasi ye oyo atubelaka mpe atikaka yango azwaka ngolu.


Yawe, kati na pasi na bango, balukaki Yo ; tango opesaki bango etumbu, bamikabaki na mabondeli makasi.


Obwakaki ngai kati na libulu ya molili makasi, kati na mozindo ya ebale monene epai wapi mayi ezingeli ngai mpe bambonge na yo nyonso ekweyeli ngai.


Nani ayebi ? Tango mosusu Nzambe akobongola makanisi, akolongola kanda mpe akozongisa motema sima mpo ete tokufa te. »


Tala biso oyo, tomitiki na maboko na yo ; nyonso oyo okomona malamu mpe sembo na miso na yo, sala biso yango.


Bongo bagangaki lisusu epai na Yawe mpo na kosenga lisungi ; balobaki : « Tosali masumu, pamba te tosundoli Yawe mpe tosaleli banzambe Bala mpe Asitarite. Kasi sik’oyo, kangola biso na maboko ya banguna na biso, mpe tokosalela Yo. »


Boye Samuele ayebisaki ye makambo nyonso, abombelaki ye ata likambo moko te. Mpe Eli alobaki : — Azali Yawe. Tika ete asala makambo oyo ezali malamu na miso na Ye.


Bato ya Isalaele basanganaki na Mitsipa, batokaki mayi mpe basopaki yango na mabele, liboso ya Yawe. Na mokolo wana, bakilaki bilei mpe batubelaki kuna masumu na koloba : « Tosalaki masumu liboso ya Yawe. » Samuele akambaki Isalaele wuta na Mitsipa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ