Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 10:13 - Mokanda na Bomoi

13 Kasi bino, bosundolaki Ngai mpe bosalelaki banzambe mosusu. Yango wana, nakokangola bino lisusu te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 10:13
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo, yo Salomo, mwana na ngai, yeba Nzambe ya tata na yo mpe salela Ye na motema na yo mobimba mpe na esengo ; pamba te Yawe amonaka kino na bozindo ya mitema nyonso mpe asosolaka makanisi na yango nyonso. Soki oluki Ye, okomona Ye ; kasi soki atiki Ye, akobwaka yo mpo na libela.


Bongo, mosakoli Shemaya akendeki epai ya Roboami mpe bakambi ya Yuda oyo basanganaki na Yelusalemi tango bamonaki Shishaki kopusana. Alobaki na bango : — Tala liloba oyo Yawe alobi : « Bosundolaki Ngai, yango wana Ngai mpe nasundoli bino na maboko ya Shishaki. »


Azaria ayaki liboso ya Asa mpe alobaki na ye : « Asa elongo na bato nyonso ya Yuda mpe ya Benjame, boyoka ngai ! Yawe azalaka elongo na bino soki bino bozali elongo na Ye. Soki boluki Ye, akomimonisa epai na bino. Nzokande, soki botiki Ye, Ye mpe akotika bino !


Wuta mokolo wana kino lelo, Edomi etombokelaka kaka Yuda. Na tango wana, Libina mpe etombokelaki Yorami, pamba te Yorami asundolaki Yawe, Nzambe ya batata na ye.


« Bato na Ngai basali masumu mibale : Basundoli Ngai oyo nazali etima ya bomoi, mpe batimoli bango moko mabulu ya mayi, mabulu oyo ekawukaka noki.


Mabe na yo ekomemela yo etumbu, kotomboka na yo ekomemela yo pamela. Tala malamu mpe sosola ete ezali penza mabe mpe bololo mpo na yo kosundola Yawe, Nzambe na yo, mpe kozanga kotosa Ngai, » elobi Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Wana nakomi pene ya kobungisa elikya, nakanisi Yo, Yawe, mpe libondeli na ngai emati kino epai na Yo, kino na Tempelo na Yo ya bule.


Yeshuruni akomaki monene mpe moto makasi ; atondaki na biloko ya kolia, akomaki kilo mpe moselu ; asundolaki Nzambe oyo akelaki ye mpe abwakaki Libanga na ye, Mobikisi na ye.


Bokende koganga epai ya banzambe oyo boponaki mpo ete ebikisa bino awa bozali kati na pasi.


Basundolaki Yawe, Nzambe ya batata na bango, oyo abimisaki bango na mokili ya Ejipito, mpe bakomaki kosambela mpe kosalela banzambe ya ndenge na ndenge ya bato oyo bazalaki zingazinga na bango ; bakomaki kogumbama liboso ya banzambe yango. Mpo na yango, bapelisaki kanda ya Yawe,


Kasi soki elombe akufi, bato bazalaki kozongela misala mabe koleka kutu mabe ya batata na bango ; bazalaki kosambela, kosalela, kogumbamela banzambe mosusu. Bazalaki koboya kotika misala na bango ya mabe mpe bazalaki kaka kotingama na nzela na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ