Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 10:11 - Mokanda na Bomoi

11 Yawe azongiselaki bana ya Isalaele : — Boni, nabikisaki bino te na maboko ya bato ya Ejipito, ya Amori, ya Amoni mpe ya Filisitia ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 10:11
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na mokolo wana, Yawe abikisaki bana ya Isalaele liboso ya bato ya Ejipito mpe bana ya Isalaele bamonaki bibembe ya bato ya Ejipito etandami na libongo ya ebale monene.


Boye, bana ya Isalaele babomaki ye elongo na bana na ye ya mibali mpe mampinga na ye nyonso ; batikaki ata moto moko te na bomoi, mpe bakamataki mokili na ye.


Mpo na kondima, bato ya Isalaele bakatisaki ebale monene ya Barozo lokola nde bazali kotambola na mabele ya kokawuka ; kasi tango bato ya Ejipito bamekaki kosala lokola bango, bazindaki.


Basundolaki Yawe, Nzambe ya batata na bango, oyo abimisaki bango na mokili ya Ejipito, mpe bakomaki kosambela mpe kosalela banzambe ya ndenge na ndenge ya bato oyo bazalaki zingazinga na bango ; bakomaki kogumbama liboso ya banzambe yango. Mpo na yango, bapelisaki kanda ya Yawe,


Alobaki na bango : — Bolanda ngai, pamba te Yawe akabi Moabi, monguna na bino, na maboko na bino. Balandaki ye mpe babotolaki bato ya Moabi bisika oyo bakatisaka Yordani na makolo. Bapesaki lisusu ata na moto moko te nzela ya kokatisa mayi.


Sima na Ewudi, Shamagari, mwana mobali ya Anati, ayaki mpe abomaki bato ya Filisitia nkama motoba na nzela ya nzete ya moke oyo batambolisaka na yango bangombe. Ye mpe abikisaki Isalaele.


Sima na Jakobi kokota na Ejipito, bakoko na bino bagangaki epai na Yawe mpo na kosenga lisungi. Mpe Yawe atindaki Moyize mpe Aron oyo babimisaki bango na Ejipito mpo na kovandisa bango na esika oyo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ