Bilombe 1:7 - Mokanda na Bomoi7 Adoni-Bezeki alobaki : « Bakonzi tuku sambo, oyo bakata bango misapi ya minene ya maboko mpe ya makolo, bazalaki kolokota biloko oyo ezalaki kokweya na se ya mesa na ngai. Sik’oyo, Nzambe azongiseli ngai makambo oyo nasalaki baninga. » Bamemaki ye na Yelusalemi, mpe akufaki kuna. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Okokata meme yango kingo, okozwa ndambo ya makila na yango mpe okotia yango na songe ya litoyi ya ngambo ya loboko ya mobali ya Aron mpe ya bana na ye ya mibali. Okotia yango lisusu na mosapi ya monene ya loboko na bango ya ngambo ya mobali mpe na mosapi ya monene ya lokolo na bango ya ngambo ya loboko ya mobali.