Bilombe 1:6 - Mokanda na Bomoi6 Adoni-Bezeki akimaki ; kasi balandaki ye mpe bakangaki ye, bakataki ye misapi ya minene ya maboko mpe ya makolo. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Okokata meme yango kingo, okozwa ndambo ya makila na yango mpe okotia yango na songe ya litoyi ya ngambo ya loboko ya mobali ya Aron mpe ya bana na ye ya mibali. Okotia yango lisusu na mosapi ya monene ya loboko na bango ya ngambo ya mobali mpe na mosapi ya monene ya lokolo na bango ya ngambo ya loboko ya mobali.
Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe alobi : Lokola botosaki Ngai te, bosakolaki te kokangolama ya bandeko na bino moko mpe bopesaki bango bonsomi te, Ngai mpe, elobi Yawe, nasakoli ete napesi sik’oyo bonsomi epai ya mopanga, epai ya bokono oyo ebomaka mpe epai ya nzala makasi ; nafungoli yango mpo na kotelemela bino : nakokomisa bino eloko ya koyoka somo, na miso ya bikolo nyonso ya mabele ;