5 Ezalaki kuna nde bakutaki Adoni-Bezeki mpe babundisaki ye. Balongaki bato ya Kanana mpe ya Perizi.
mpe koswana ekotaki kati na babateli bibwele ya Abrami mpe babateli bibwele ya Loti. Nzokande, na tango wana, bato ya Kanana mpe ya Perizi bazalaki kovanda kati na mokili yango.
Tango libota ya Yuda ekotaki na bitumba, Yawe akabaki bato ya Kanana mpe ya Perizi na maboko na bango, mpe babomaki bato nkoto zomi, na Bezeki.
Adoni-Bezeki akimaki ; kasi balandaki ye mpe bakangaki ye, bakataki ye misapi ya minene ya maboko mpe ya makolo.
Bana ya Isalaele bavandaki kati na bato ya Kanana, ya Iti, ya Amori, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi ;
Saulo atangaki bango, na Bezeki ; motango ezalaki : mibali ya Isalaele nkoto nkama misato, mpe mibali ya Yuda nkoto tuku misato.