Kasi bakitani ya Dani balongaki te kobotola eteni ya mabele na bango, boye bakendeki kobundisa Leshemi mpe babotolaki yango. Babomaki bato ya Leshemi na mopanga, babotolaki yango mpe bakomaki kovanda kuna. Bakomaki kobenga Leshemi « Dani, » kombo ya koko na bango.
Bato ya libota ya Nefitali babenganaki te bato oyo bazalaki kovanda na Beti-Shemeshi mpe na Beti-Anati. Boye, bakomaki kovanda esika moko na bato ya Kanana oyo bazalaki kovanda na mokili yango ; kasi bato ya Beti-Shemeshi mpe ya Beti-Anati bakomaki kosala misala makasi.
Boye, bato ya Amori mpe batingamaki kaka kovanda na Ari-Eresi, na Ayaloni mpe na Shaalibimi. Kasi tango ndako ya Jozefi ekomaki lisusu na nguya, bakomaki kosalisa bango misala makasi.
Na mikolo wana, bana ya Isalaele bazalaki na mokonzi te, mpe bato ya libota ya Dani bazalaki koluka esika ya kovanda ; pamba te kino na tango wana, bazwaki nanu ya bango libula te kati na mabota nyonso ya Isalaele.