Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 1:3 - Mokanda na Bomoi

3 Bongo bato ya libota ya Yuda balobaki na bandeko na bango ya libota ya Simeoni : — Boya elongo na biso mpo ete tobundisa bato ya Kanana, mpo na eteni ya mabele oyo epesamelaki biso. Bongo, biso mpe tokokende elongo na bino, na eteni ya mabele na bino. Boye, bato ya libota ya Simeoni bakendeki elongo na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 1:3
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sima, azwaki lisusu zemi mpe abotaki mwana mobali. Alobaki : « Yawe amoni ete nalingami te, mpe apesi ngai lisusu mwana. » Boye apesaki ye kombo « Simeoni. »


Joabi alobaki : « Soki bato ya Siri baleki ngai na makasi, yo okoya kosunga ngai ; kasi soki bato ya Amoni baleki yo na makasi, wana ngai nakoya kosunga yo.


Na mbala ya mibale, zeke ekweyaki epai ya libota ya Simeoni, kolanda bituka na bango. Libula na bango ezalaki na kati-kati ya eteni ya mabele ya libota ya Yuda.


kati na libota ya Simeoni, bato nkoto zomi na mibale ; kati na libota ya Levi : bato nkoto zomi na mibale ; kati na libota ya Isakari, bato nkoto zomi na mibale ;


Bato ya libota ya Yuda elongo na bandeko na bango ya libota ya Simeoni bakendeki kobundisa bato ya Kanana oyo bazalaki kovanda na Tsefati, mpe babebisaki bango. Yango wana, bapesaki engumba yango kombo « Orima. »


Yawe azongisaki : — Libota ya Yuda nde ekokende liboso, pamba te napesi mokili oyo na maboko na bango.


Tango libota ya Yuda ekotaki na bitumba, Yawe akabaki bato ya Kanana mpe ya Perizi na maboko na bango, mpe babomaki bato nkoto zomi, na Bezeki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ