Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 1:29 - Mokanda na Bomoi

29 Bato ya libota ya Efrayimi babenganaki te bato ya Kanana oyo bazalaki kovanda na Gezeri, mpe bato ya Kanana bakobaki kovanda esika moko na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 1:29
6 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Salomo asalisaki bana ya Isalaele misala makasi mpo na kotonga Tempelo ya Yawe, ndako na ye moko, Milo, mir ya Yelusalemi, Atsori, Megido mpe Gezeri.


Faraon, mokonzi ya Ejipito, amataki na Gezeri, abotolaki yango na maboko ya bato ya Kanana oyo bazalaki kovanda kuna, abomaki bango, atumbaki engumba yango na moto mpe akabaki yango epai ya mwana na ye ya mwasi oyo akomaki mwasi ya Salomo.


Boye, Orami, mokonzi ya Gezeri, amataki mpo na kosunga Lakishi ; kasi Jozue abomaki ye na mopanga elongo na bato na ye, atikaki ata moto moko te na bomoi.


Kasi babenganaki te bato ya Kanana oyo bazalaki kovanda na Gezeri. Yango wana, bato ya Kanana bazali kovanda kati na bato ya Efrayimi kino na mokolo ya lelo. Kasi bakomaki kosalisa bango misala makasi oyo ekoki na bawumbu.


Tango bana ya Isalaele bakomaki lisusu makasi, bakomaki kosalisa bato ya Kanana misala makasi, kasi babenganaki bango nyonso te.


Bato ya libota ya Zabuloni babenganaki te bavandi ya Kitroni mpe ya Naaloli. Bato ya Kanana bakobaki kovanda esika moko na bango, kasi bakomaki kosalisa bango misala makasi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ