24 banongi bamonaki moto moko kobima na engumba mpe balobaki na ye : « Lakisa biso esika nini tokoki kokotela na kati ya engumba, mpe tokosalela yo bolamu. »
Boye, alakisaki bango esika ya kokotela na kati na engumba. Mpe babomaki bato ya engumba yango na mopanga, kasi babikisaki moto wana elongo na libota na ye mobimba.
Davidi atunaki ye : — Okoki komema ngai na bisika oyo lisanga ya miyibi wana ezali ? Azongisaki : — Yo, lapa nanu ndayi epai na ngai liboso ya Nzambe ete okoboma ngai te mpe okozongisa ngai te epai ya nkolo na ngai ; bongo ngai nakomema yo epai bango bazali.