Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 1:20 - Mokanda na Bomoi

20 Kolanda ndenge Moyize alobaki, bapesaki na Kalebi engumba Ebron. Mpe Kalebi abenganaki na Ebron bana mibali misato ya Anaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 1:20
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Balekaki na nzela ya etuka ya Negevi mpe bakomaki kino na Ebron epai wapi Ayimani, Sheshayi mpe Talimayi, bakitani ya Anaki, bazalaki kovanda. Engumba Ebron etongamaki mibu sambo liboso ya engumba Tsoani kati na Ejipito.


Kasi lokola Kalebi, mosali na Ngai, atambolisamaka na molimo mosusu mpe atamboli na bosembo na miso na Ngai, nakokotisa ye na mokili oyo asilaki kokende, mpe bakitani na ye bakokamata yango lokola libula.


longola kaka Kalebi, mwana mobali ya Yefune ; ye akomona yango, mpe nakopesa na ye mpe na bakitani na ye, mokili oyo lokolo na ye enyataki, pamba te asalelaki Ngai Yawe na motema na ye mobimba. »


Jozue mpe Isalaele mobimba balongwaki na Egiloni, bamataki kino na Ebron mpe babundisaki yango.


Na tango wana, Jozue akendeki koboma bato ya Anaki wuta na mokili ya bangomba : wuta na Ebron, na Debiri, na Anabi, na mokili nyonso ya bangomba ya Yuda mpe na mokili nyonso ya bangomba ya Isalaele. Jozue asilisaki koboma bango nyonso elongo na bingumba na bango.


Liboso, bazalaki kobenga Ebron « Kiriati-Ariba. » Ariba azalaki elombe oyo alekaki bato nyonso ya Anaki na makasi. Bongo, mokili ekomaki na kimia mpe bitumba ezalaki lisusu te.


Bato ya libota ya Yuda babundisaki lisusu bato ya Kanana oyo bazalaki kovanda na Ebron, oyo kombo na yango ezalaki na kala « Kiriati-Ariba. » Balongaki Sheshayi, Ayimani mpe Talimayi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ