Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 1:2 - Mokanda na Bomoi

2 Yawe azongisaki : — Libota ya Yuda nde ekokende liboso, pamba te napesi mokili oyo na maboko na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 1:2
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na ngambo ya este epai wapi moyi ebimaka, milongo ya mampinga ya Yuda bakotia molako na bango na se ya bendele na bango. Mokambi ya bato ya Yuda ezali Nashoni, mwana mobali ya Aminadabi.


Na mokolo ya liboso, Nashoni, mwana mobali ya Aminadabi, moto ya libota ya Yuda, amemaki likabo na ye.


Toyebi malamu ete Nkolo na biso azali ya libota ya Yuda, mpe Moyize atikalaki koloba eloko moko te na tina na bonganga-Nzambe ya libota ya Yuda.


Balobaki na Jozue : — Solo, Yawe apesi mokili oyo nyonso na maboko na biso ; bato nyonso bazali kolenga liboso na biso.


Bongo moko kati na bampaka alobaki na ngai : « Kolela te ! Tala ! Nkosi ya libota ya Yuda, Mokitani ya Davidi, alongaki mpo na kobuka bikangelo sambo mpe kofungola buku yango. »


Bongo bato ya libota ya Yuda balobaki na bandeko na bango ya libota ya Simeoni : — Boya elongo na biso mpo ete tobundisa bato ya Kanana, mpo na eteni ya mabele oyo epesamelaki biso. Bongo, biso mpe tokokende elongo na bino, na eteni ya mabele na bino. Boye, bato ya libota ya Simeoni bakendeki elongo na bango.


Bana ya Isalaele bakendeki na Beteli mpe batunaki Nzambe : — Nani kati na biso asengeli kokende mpo na kobundisa libota ya Benjame ? Yawe azongisaki : — Yuda akokende liboso.


Pineasi, mwana mobali ya Eleazari, mwana mobali ya Aron, azalaki na mosala liboso ya Sanduku). Batunaki : — Boni, tokende lisusu kobundisa bandeko na biso, bato ya libota ya Benjame to te ? Yawe azongisaki : — Bokende, pamba te, lobi, nakokaba bango na maboko na bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ