14 Nzokande, tango Akisa akomaki na ndako ya Otinieli, atindikaki ye ete asenga elanga epai ya Kalebi, tata na ye. Boye, tango Akisa akitaki wuta na ane na ye, Kalebi atunaki ye : — Olingi nini ?
Akisa azongisaki : — Salela ngai ngolu. Lokola opesaki ngai eteni ya mabele kati na Negevi, pesa ngai lisusu bitima. Boye, Kalebi apesaki ye bitima ya likolo mpe ya se.