Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 1:1 - Mokanda na Bomoi

1 Sima na kufa ya Jozue, bana ya Isalaele batunaki Yawe : — Libota nini kati na biso ekokende liboso mpo na kobundisa bato ya Kanana ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 1:1
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Jozafati alobaki lisusu na mokonzi ya Isalaele : — Nabondeli yo, tuna nanu toli ya Yawe.


Moyize azongiselaki ye : — Bayaka epai na ngai mpo na kotuna toli ya Nzambe.


Okotia lisusu Urimi mpe Tumimi kati na elamba ya tolo ya kokata makambo mpe yango ekozala likolo ya motema ya Aron tango akotelema liboso ya Yawe. Boye Aron akomema makambo ya bana ya Isalaele liboso ya Yawe mpo na libela.


Akokende kotelema liboso ya Nganga-Nzambe Eleazari, oyo akotuna mokano na Yawe mpo na ye, na nzela na Urimi. Na mokano wana nde, ye mpe lisanga mobimba ya bana ya Isalaele bakobanda kobima mpe kokota.


Kasi bato ya libota ya Manase babenganaki te bato ya Beti-Sheani mpe bamboka na yango ya mike, bato ya Taanaki mpe bamboka na yango ya mike, bato ya Dori mpe bamboka na yango ya mike, bato ya Yibileayimi mpe bamboka na yango ya mike, bato ya Megido mpe bamboka na yango ya mike ; pamba te bato ya Kanana batingamaki kaka kovanda na mokili yango.


Ngai mpe nakobengana lisusu te liboso na bango ata ekolo moko kati na bikolo oyo Jozue atikaki liboso ete akufa.


Jozue, mwana mobali ya Nuni, mosali na Yawe, akufaki tango akokisaki mibu nkama moko na zomi ya mbotama.


Bakundaki ye na mabele ya libula na ye, na Timinati-Eresi, kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi, na ngambo ya nor ya ngomba Gashi.


Bana ya Isalaele bakendeki na Beteli mpe batunaki Nzambe : — Nani kati na biso asengeli kokende mpo na kobundisa libota ya Benjame ? Yawe azongisaki : — Yuda akokende liboso.


Bana ya Isalaele bakendeki mpe balelaki liboso ya Yawe kino na pokwa, mpe batunaki Yawe : — Boni, tokende lisusu kobundisa bandeko na biso ya libota ya Benjame ? Yawe azongiselaki bango : — Bokende kobundisa bango.


Bana ya Isalaele batunaki Yawe. (Na mikolo wana, Sanduku ya Boyokani ya Nzambe ezalaki kuna.


Pineasi, mwana mobali ya Eleazari, mwana mobali ya Aron, azalaki na mosala liboso ya Sanduku). Batunaki : — Boni, tokende lisusu kobundisa bandeko na biso, bato ya libota ya Benjame to te ? Yawe azongisaki : — Bokende, pamba te, lobi, nakokaba bango na maboko na bino.


Boye, batunaki lisusu Yawe : — Boni, ezali lisusu na moto oyo ayaki awa ? Yawe azongisaki : — Iyo ! Botala ye wana, abombami kati na biloko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ