8 Bawumbu bakomi kokonza biso, mpe moto ata moko te amonani mpo na kokangola biso na maboko na bango.
Alobaki : « Tika ete Kanana alakelama mabe, azala mowumbu ya suka ya bandeko na ye ! »
Kasi tango Sanibala, moto ya Oroni ; Tobiya, kalaka ya mboka Amoni ; mpe Geshemi, moto ya mboka Arabi, bayokaki sango na yango, basekaki mpe batiolaki biso. Balobaki : — Eloko nini oyo bozali kosala ? Bozali kotombokela mokonzi ?
Nzokande, bayangeli oyo bakambaki liboso na ngai bazalaki konyokola bato mpe kosenga na makasi ete bapesa bilei, vino mpe mbongo ya bibende ya palata, tuku minei. Ezala bakalaka na bango mpe bazalaki kaka konyokola bato. Kasi ngai, natikalaki kosala bongo te, pamba te nazalaki kotosa Nzambe.
atako oyebi malamu ete nasali na ngai mabe te, mpe ete ezali na moto moko te oyo akoki kokangola ngai na loboko na Yo ?
‹ Tika ete bana na ye ya mibali bazanga lisungi, balonga te na kosambisama mpe bazangela moto oyo akobundela bango !
Bino bato oyo bozali kobosana Nzambe, nabondeli bino : bososola makambo oyo ; noki te nakobebisa bino, mpe moto moko te akokangola bino.
Yawe, Nzambe na ngai, nabombamaka kati na Yo ; bikisa ngai mpe kangola ngai liboso ya bato nyonso oyo balukaka koboma ngai.
Mowumbu oyo akomi mokonzi, zoba oyo atondi na bomengo,
Solo, wuta na tango ya kala, nazalaka kaka ndenge moko ; moko te akokoka kokangola na loboko na Ngai. Soki nasali, nani akobongola yango ? »
Asosolaki te ete ngai nde nazalaki kopesa ye ble, vino ya sika mpe mafuta ; ete ngai nde nasopelaki ye palata mpe wolo oyo basaleli bikeko ya Bala.
Yango wana Ngai mpe nakoyokela lisusu bato ya mokili mawa te, nakokaba moto na moto na maboko ya moninga na ye mpe ya mokonzi na ye. Bakonzi bakobebisa mokili, kasi nakokangola ata moto moko te wuta na maboko ya bakonzi yango, elobi Yawe.
Mopaya oyo avandi kati na bino akoleka bino na lokumu tango nyonso, kasi bino bokokita se kokita ;