Kasi tala, tozali lelo bawumbu ! Tozali penza bawumbu kati na mokili oyo opesaki na bakoko na biso mpo ete balia mbuma na yango mpe biloko mosusu ya kitoko oyo ebimaka kuna !
« Bino nyonso oyo bozali na posa ya komela, boya, boya na esika oyo mayi ezali ; ezala bino oyo bozali na mbongo te, boya kosomba mpe kolia ; boya kosomba vino mpe miliki : ezali ya ofele, ya kosomba na mbongo te !
tango bokozala na nzala mpe na posa ya komela, mpe tango bokozanga bilamba mpe bokokelela, bokosalela banguna oyo Yawe Nzambe akotindela bino. Akotia bino ekangiseli ya ebende na kingo kino akobebisa bino.