Mokili na bino ebebisami, bingumba na bino esili kozika na moto ; bapaya bazali kobebisa bilanga na bino na miso na bino, nyonso ebebisami solo, lokola tango bapanzaka yango na moto ya mobulu.
Likolo ya mabe na yo, okobungisa libula oyo napesaki yo, nakokomisa yo mowumbu ya banguna na yo kati na mokili oyo oyebi te ; pamba te opelisi kanda na Ngai, mpe ekopela mpo na libela. »
Tango nakosembola loboko na Ngai mpo na kotelemela bavandi ya mboka, nakopesa bandako na bango, bilanga na bango mpe basi na bango, epai ya bato mosusu, » elobi Yawe.
Nakotinda ekolo oyo eleki mabe kati na bikolo mpo ete eya kobotola bandako na bango ; nakosilisa lolendo ya bato ya nguya mpe nakosambwisa bisika na bango ya bule.