Yelusalemi ezali kotepatepa, mpe Yuda ekweyi ; mpo ete maloba mpe misala na bango ezali ya botomboki liboso ya Yawe, ezali kotelemela lokumu ya Kombo na Ye.
Mabe na yo ekomemela yo etumbu, kotomboka na yo ekomemela yo pamela. Tala malamu mpe sosola ete ezali penza mabe mpe bololo mpo na yo kosundola Yawe, Nzambe na yo, mpe kozanga kotosa Ngai, » elobi Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga.
Bakotaki kati na yango mpe babotolaki yango ; kasi batosaki Yo te, basalelaki Mobeko na Yo te, basalaki te nyonso oyo otindaki bango. Yango wana omemelaki bango pasi oyo nyonso.
Tala ndenge nini engumba oyo, na kala, ezalaki na bato ebele penza, etikali lisusu na bato te ! Tala ndenge nini engumba oyo ezalaki na lokumu kati na bikolo ekomi lelo lokola mwasi akufisa mobali ; oyo ezalaki engumba mokonzi ekomi lelo na bowumbu !
Yawe azali sembo ; nzokande, ezali ngai nde natombokelaki mitindo na Ye. Boyoka, bino bikolo nyonso, mpe botala pasi na ngai ! Bana na ngai ya basi mpe ya mibali bakei na bowumbu.
Oh Yawe, tala ndenge nazali na pasi : libumu na ngai ezali kotungisama, mpe motema na ngai ezali kosala pasi, pamba te nazalaki motomboki penza. Na libanda, mopanga ezali koboma bana na ngai ; mpe na kati, ezali kaka kufa.
Yelusalemi asali masumu mingi penza, yango wana akomi mbindo. Bato nyonso oyo bazalaki kopesa ye lokumu bakomi kotiola ye, pamba te bamoni bolumbu na ye ; ye moko mpe azali komilela mpe abaluki mpo na kobomba elongi.
Tala ndenge nini Nkolo azipi Siona, mboka kitoko, na lipata ya kanda na Ye : akweyisi lokumu ya Isalaele, wuta na likolo kino na se ; na mokolo ya kanda na Ye, abosanaki enyatelo makolo na Ye !
Kasi makambo wana esalemaki mpo na masumu ya basakoli ya Yelusalemi mpe mabe ya Banganga-Nzambe na yango, oyo basopaki kati na yango makila ya bato ya sembo.
Pamba te mokonzi ya Babiloni akotelema na esika oyo banzela mibale ekutana mpo na kosala makambo ya soloka, akobeta zeke na koningisa makonga ya mike, akotuna banzambe na ye ya bikeko mpe akotala mabale ya banyama.
Kobanga te pasi oyo osengeli komona. Tala, Satana akobwaka bato mingi kati na bino na boloko mpo na komeka bino mpe bokonyokwama mikolo zomi. Zala kaka sembo kati na kondima na yo kino na kufa, mpe Ngai nakopesa yo bomoi lokola motole ya elonga na yo.
Bato ya Isalaele basanganaki na Mitsipa, batokaki mayi mpe basopaki yango na mabele, liboso ya Yawe. Na mokolo wana, bakilaki bilei mpe batubelaki kuna masumu na koloba : « Tosalaki masumu liboso ya Yawe. » Samuele akambaki Isalaele wuta na Mitsipa.