Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bileli 5:1 - Mokanda na Bomoi

1 Oh Yawe, kanisa makambo oyo ekomeli biso ! Tala mpe mona soni na biso !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bileli 5:1
26 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Balobaki na ngai : « Bayuda oyo babikaki mpe batikalaki wuta na bowumbu bazali kovanda kati na etuka ya Yuda mpe bazali na pasi mingi mpe na soni makasi ; mir ya Yelusalemi etondi na madusu, mpe bikuke na yango ebebisamaki na moto. »


Nabondeli Yo, kanisa maloba oyo otindaki Moyize, mosali na Yo, koloba : ‹ Soki botamboli na bosembo te, nakopanza bino kati na bikolo ya bapaya.


Nzokande, na tango yango kaka, bato ya Yuda bazalaki koyimayima : « Awa bato oyo bazali komema mabele bazali lisusu na makasi te, mpe mipiku ya mabanga ya mir oyo ekweya ezali nanu ya komata, tokotikala kolonga te kotonga lisusu mir oyo ! »


Kanisa ete Yo moko nde obongisaki ngai lokola mabele ya bikeko ; olingi sik’oyo kozongisa ngai na putulu ?


Oh Nkolo, kobosana te ete bomoi na ngai ezali kaka pema ya pamba ! Miso na ngai ekomona lisusu bolamu te.


Mona malamu pasi na ngai mpe kangola ngai, pamba te nabosanaka mibeko na Yo te.


Yawe, kobosana te ete monguna afingi Yo, ete bato bazanga tina batioli Kombo na Yo !


Oh Nkolo, zongisela bikolo oyo ezingeli biso, kotiola oyo batiolaki Yo ; zongisela bango mbala sambo.


Tala ndenge bato ya bikolo oyo ezingeli biso bazali kofinga biso, mpe tokomi lokola eloko ya liseki na miso na bango !


Oh Yelusalemi, natelemisi basenzeli na likolo ya bamir na yo ; bakovanda nye te, ezala na moyi to na butu. Bino bato oyo bosalaka ete Yawe akanisa lisusu Yelusalemi, bovanda kimia te ;


Oh Yawe, oyebi makambo nyonso, kanisa ngai mpe batela ngai. Zongisa mabe na mabe ya banyokoli na ngai. Yo oyo osilikaka noki te, kosundola ngai te ! Tala ndenge nazali kondima koyoka soni kino sik’oyo mpo na Kombo na Yo !


Tosambwe, pamba te totiolami ; mpe bilongi na biso ezipami na soni mpo ete bapaya bakoti kino na bisika ya bule ya Tempelo ya Yawe.


Bato na ye nyonso bazali kolela lokola bato bazali koluka bilei ; bapesaki bomengo na bango mpo na kozwa bilei, mpo ete bawumela na bomoi. Oh Yawe, tala mpe mona ndenge natiolami !


Oh Yawe, tala ndenge nazali na pasi : libumu na ngai ezali kotungisama, mpe motema na ngai ezali kosala pasi, pamba te nazalaki motomboki penza. Na libanda, mopanga ezali koboma bana na ngai ; mpe na kati, ezali kaka kufa.


Mbindo na ye ekangami ye na elamba, ayebaki te makambo nini ekokomela ye na sima. Tala ye wana akweyi, bongo kokweya na ye ezali kokamwisa ; moto oyo akolendisa ye azali te ! « Oh Yawe, tala pasi na ngai, pamba te monguna alongi ngai ! »


Bato nyonso oyo bolekelaka na nzela na yo bazali kobeta maboko na kokamwa, bazali kobeta piololo mpe koningisa mito mpo na Yelusalemi, mboka kitoko : « Boni, ezali solo engumba oyo bazalaki kobenga kitoko ekoka mpe esengo ya mokili mobimba ? »


Oh Yawe, tala mpe mona ! Nani oyo osalela makambo ya boye ? Boni, basi basengelaki solo kolia mbuma ya mabumu na bango to bana oyo bango moko babokoli ? Boni, basengelaki solo koboma mosakoli mpe Nganga-Nzambe kati na Esika ya bule ya Nkolo ?


Nakanisi pasi mpe minyoko na ngai, ezali lokola ngenge mpe masanga ya bololo.


kino tango Yawe akotala mpe akomona wuta kuna na Lola.


Yawe, oyokaki mafinga na bango, mabongisi na bango ya kosala ngai mabe,


Oh Yawe, nayokaki sango ya Kombo na Yo ! Yawe, nabangaki misala na Yo. Sala yango lisusu na tango na biso ! Sala ete eyebana lisusu na tango na biso ! Kasi ata soki otomboki ndenge nini, kobosanaka te mawa na Yo mpo na biso.


Bongo alobaki lisusu : — Yesu, kanisa ngai tango okokota kati na Bokonzi na Yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ