Bana ya Isalaele balobaki na bango : — Ah ! Ebongaki kutu loboko na Yawe epamela biso kati na Ejipito, pamba te, kuna, tozalaki kovanda pembeni ya banzungu etonda na misuni ; tozalaki kolia mpe kotonda biloko. Kasi bino bomemi biso kati na esobe oyo mpo na koboma lisanga oyo nyonso na nzala !
« Bakokufa na kufa ya somo, bakolela bango te mpe bakokunda bango te, kasi bakozala lokola matiti ya kopola na mabele. Bakokufa na mopanga mpe na nzala makasi, bongo bibembe na bango ekokoma bilei ya bandeke ya likolo mpe ya banyama ya zamba. »
bokokanga bitendi na mito na bino mpe bokolata basandale na makolo na bino, bokosala matanga te mpe bokolela te, kasi bokomona pasi mpo na masumu na bino mpe bokokoma kolelalela kati na bino.
Alobaki na ngai lisusu : — Mwana na moto, nakobebisa bilei nyonso oyo ezali na bibombelo ya Yelusalemi. Bato bakolia biteni mike ya mapa, na pasi na motema, mpe bakomela mayi na bakopo ya mike, na somo ;
Mopanga ekoboma na libanda ya engumba, bokono oyo ebomaka mpe nzala makasi ekoboma kati na engumba ; bato oyo bazali kati na mokili bakokufa na mopanga, mpe bato oyo bazali kati na engumba bakokufa na bokono oyo ebomaka mpe na nzala makasi.
Kati na mikili ya banguna na bino, bato oyo bakotikala na bomoi kati na bino bakokufa kuna mpo na masumu na bango moko mpe mpo na masumu ya batata na bango.
Bakolia bana ya bibwele na bino mpe bambuma ya mabele na bino, kino bakobebisa bino. Bakotikela bino ata ble te, vino ya sika te, mafuta te, ata bana ngombe na bino te, ata bana meme na bino te mpe ata bantaba na bino te kino bokobebisama.