Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bileli 4:7 - Mokanda na Bomoi

7 Bana ya bakonzi na bango bazalaki kongala koleka mvula ya pembe, pembe koleka miliki ; banzoto na bango ezalaki motane koleka langi ya motane penza, mpe lolenge na bango ezalaki lokola libanga na safiri.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bileli 4:7
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

bakoki te kosomba yango na wolo ya Ofiri to na mabanga ya talo ya Onikisi to mabanga ya talo ya Safiri ;


Mayaka ya Karayi mpe ya Jasipe ezali na motuya te liboso na yango. Motuya ya bwanya eleki pawuni ya talo.


Bana mibali na biso bazali lokola milona, bazali kokola malamu wuta na bomwana na bango ; bana basi na biso bazali lokola bililingi kitoko oyo batoboli na bamir ya ndako ya mokonzi.


Solo, nabotamaki kati na lisumu ; wuta na libumu ya mama na ngai, nazali mosumuki.


epai wapi bamonaki Nzambe ya Isalaele ; se ya matambe na Ye ezalaki lokola mabanga ya talo ya safiri mpe ezalaki na langi ya ble ya kitoko lokola ble ya likolo.


Mobali na ngai azali na poso pembe, azali moto oyo asimba bendele kati na mibali nkoto zomi.


Makolo na ye ezali lokola makonzi ya mabanga ya marbre oyo evandi likolo ya moboko ya wolo ya peto. Azali lokola bangomba ya Libani, kitoko lokola banzete ya sedele ya Libani.


Sima na mikolo yango zomi, bakomaki bilongi kitoko mpe banzoto ngebungebu koleka bilenge oyo bazalaki kolia bilei ya mokonzi.


pamba te akozala moto monene na miso ya Nkolo. Akomela te ezala vino to masanga ya makasi, mpe akozala atonda na Molimo Mosantu wuta na libumu ya mama na ye.


pamba te okozwa zemi mpe okobota mwana mobali. Bakoki te kokata suki ya moto na ye, pamba te mwana mobali yango akozala bule mpo na Nzambe wuta na libumu ya mama na ye. Akobanda kokangola Isalaele wuta na maboko ya bato ya Filisitia. »


Kasi alobaki na ngai : ‹ Okozwa zemi mpe okobota mwana mobali. Bongo komela vino to masanga mosusu ya makasi te mpe kolia eloko moko te ya mbindo, pamba te mwana mobali oyo okobota akozala bule mpo na Nzambe wuta na libumu ya mama na ye kino na mokolo na ye ya kufa. › »


Boye, ayebisaki Dalila makambo nyonso. Alobaki : « Suki na ngai ekatamaka te, pamba te Nzambe abulisa ngai wuta na libumu ya mama na ngai. Soki kaka bakati ngai suki, makasi na ngai ekosila mpe nakokoma moto na bolembu lokola moto nyonso. »


Boye, Izayi atindaki bato mpo na kobenga ye, mpe bayaki na ye. Langi ya poso ya nzoto na ye ezalaki kitoko ; azalaki na miso kitoko mpe elobeli ya malamu. Bongo Yawe alobaki na Samuele : « Telema mpe pakola ye mafuta, pamba te ezali nde ye. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ