Mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi azongisaki : — Bokanisi ete nkolo na ngai atindi ngai koloba maloba oyo kaka epai na mokonzi na bino mpe epai na bino ? Te ! Maloba yango ezali mpe mpo na bato oyo batelemi na likolo ya mir, oyo bakolia nyei na bango mpe komela masuba na bango elongo na bino ?