Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bileli 4:3 - Mokanda na Bomoi

3 Ata mbwa ya zamba ezalaka na posa ya komelisa bana na yango mabele ; kasi bato na ngai bakomi mitema makasi lokola maligbanga kati na esobe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bileli 4:3
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na tongo, tango nalamuki mpo na komelisa mwana na ngai mabele, namoni ete mwana azali ya kokufa. Kasi tango natali ye penza malamu, kaka na tongo yango, namoni ete ezali mwana na ngai te, oyo ngai nabotaki !


Banyawu ya zamba ekotonda na bandako na bango ya makasi, mpe bambwa ya zamba ekotonda na bandako na bango ya kitoko. Tango na yango esili kobelema, mpe mikolo na yango ekopusana lisusu te.


Nzube ekobota kati na ndako ya mokonzi ; basende mpe matiti, kati na bandako na ye batonga makasi ; ekokoma ndako ya bambwa ya zamba, lopango ya maligbanga.


Boni, mama akoki solo kobosana bebe na ye oyo azali komelisa mabele, to kozanga bolingo epai ya mwana oyo ye aboti ? Ata soki akoki kobosana, ngai nakoki kobosana yo te !


Nakoleisa bango misuni ya bana na bango ya basi mpe ya mibali, bakoliana bango na bango tango bato oyo bazali na posa ya kosala bango mabe bakozingela bango.


Oh Yawe, tala mpe mona ! Nani oyo osalela makambo ya boye ? Boni, basi basengelaki solo kolia mbuma ya mabumu na bango to bana oyo bango moko babokoli ? Boni, basengelaki solo koboma mosakoli mpe Nganga-Nzambe kati na Esika ya bule ya Nkolo ?


Basi ya mitema malamu balambi, na maboko na bango, bana na bango moko ; bana na bango bakomi bilei na bango kati na pasi oyo ekomeli bato na ngai.


Yango wana, kati na bino, batata bakolia bana na bango, mpe bana bakolia batata na bango. Nakopesa bino etumbu mpe nakopanza bipai nyonso bato na bino nyonso oyo bakotikala na bomoi.


bato bazanga mayele, bosembo, bolingo mpe mawa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ