Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bileli 4:2 - Mokanda na Bomoi

2 Ndenge nini bana mibali ya motuya ya Siona, oyo, na kala, bazalaki kozwa bango lokola wolo ya peto, kasi bakomi lelo komona bango lokola mbeki ya mabele, oyo mosali mbeki basili kosala !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bileli 4:2
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ekobukana ndambo-ndambo lokola mbeki ya mosali mbeki, ekopanzana penza nye na mawa te ; bongo ata eteni moko te ekozwama kati na yango mpo na kozwela likala ya moto na mbabola to mpo na kotokela mayi na libulu. »


Kati na bana nyonso oyo abotaki, Ezali na mwana moko te oyo azali kolakisa ye nzela ; kati na bana oyo abokolaki, moko te azali kosimba ye na loboko.


Tala liloba oyo Yawe alobi : — Kende kosomba mbeki epai ya mosali mbeki. Kende nzela moko na bakambi ya bato mpe bakambi ya Banganga-Nzambe ;


mpe loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : Nakobebisa ekolo mpe engumba oyo, kaka ndenge bapanzaka mbeki oyo mosali mbeki asali, mpe bakokoka lisusu kobongisa yango te. Bakokunda bibembe na Tofeti kino esika ya kokunda ekotikala lisusu te.


Boni, moto oyo, Konia, azali te mbeki ya kopasuka oyo etiolama to eloko oyo ezanga tina ? Mpo na nini babengana ye elongo na bana na ye mpe babwaka bango na mokili oyo bayebi te ?


Bibembe ya bilenge mpe ya mikolo elali-lali na babalabala ; basali na ngai ya mibali mpe ya basi bakufi na mopanga ! Obomi bango na mokolo ya kanda na Yo ; obomi bango na mawa te !


Badiembiki bakalaka, na maboko na bango ; mpe bapesi bakambi lokumu te.


Isalaele abebisami ; tala bango wana kati na bikolo, bazali komonana lokola biloko pamba !


Pamba te nabendi tolotolo na Ngai, oyo ezali Yuda, natie yango likonga na Ngai ya moke oyo ezali Efrayimi. Siona, nakotelemisa bana na yo ya mibali mpo ete batelemela bana mibali ya Yavani mpe nakokomisa yo lokola mopanga ya elombe.


Kasi tomemaka bomengo yango kati na bambeki ya mabele mpo ete nguya monene ya Nzambe emonana, kasi nguya na biso bato te.


Kati na ndako ya monene, ezalaka kaka te na basani ya wolo mpe ya palata, kasi ezalaka mpe na basani oyo basala na nzete to na mabele. Basani ya wolo mpe ya palata ezalaka mpo na koyamba bato ya lokumu, kasi basani ya nzete mpe ya mabele ezalaka mpo na misala ya bongo na bongo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ