18 Banguna na biso bazalaki kolanda matambe na biso ; boye tokokaki lisusu te kotambola na babalabala na biso. Suka na biso ekomaki pene, mikolo na biso ekomaki ya kotanga, mpo ete tokomaki na suka.
Tika ete makala ya moto esopanela bango ! Tika ete Nzambe atindika bango kati na moto, kati na mabulu ya potopoto epai wapi bakokoka kotelema lisusu te !
Solo, nakotinda balobi mbisi ebele, » elobi Yawe, « mpe bakoboma mbisi ebele ; bato ya bokila ebele mpe bakoboma banyama ebele na likolo ya bangomba nyonso ya milayi mpe ya mikuse kino kati na madusu ya mabanga.
Kasi tango akomaki na Ekuke ya Benjame, mokambi ya bakengeli ya mokonzi, oyo kombo na ye ezalaki Iriya, mwana mobali ya Shelemia, mwana mobali ya Anania, akangaki mosakoli Jeremi mpe atunaki ye : — Boni, ozali kokende na ngambo ya bato ya Babiloni ?
Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Elenge mwasi Babiloni azali lokola etando ya ble na tango banyataka-nyataka yango ; mpe etikali moke, tango ya kokata ble ekokoka mpo na yango.
« Mwana na moto, libota ya Isalaele bazali koloba : ‹ Emoniseli ya moto oyo ekosalema na yango lobi te mpe masakoli na ye ekokokisama sima na mibu ebele penza. ›