Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bileli 4:11 - Mokanda na Bomoi

11 Yawe asilikaki makasi koleka ; asopaki kanda na Ye mpe apelisaki moto kati na Siona, moto oyo ezikisaki miboko na yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bileli 4:11
29 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bana na yo balembi, balali-lali na babalabala nyonso lokola mboloko oyo ekangami na motambo ; kanda ya Yawe mpe pamela ya Nzambe na yo nde ebuki-buki bango lolenge wana.


Nakosala ete babomana bango na bango, batata mpe bana na bango, elobi Yawe, eloko moko te ekopekisa Ngai koboma bango, ezala motema monene to mawa to ngolu. › »


Kasi soki botosi Ngai te mpe bobulisi te mokolo ya Saba, bongo bomemi mpe bolekisi mikumba na bino na bikuke ya Yelusalemi na mokolo ya Saba, nakopelisa moto oyo ekufaka te na bikuke ya Yelusalemi mpe ekozikisa bandako na yango nyonso oyo batonga makasi. › »


Nakopesa yo etumbu kolanda misala na yo, elobi Yawe, nakopelisa moto na zamba na yo, mpe ekotumba nyonso oyo ezali zingazinga na yo. › »


Tango mosusu mabondeli na bango ekokoma liboso ya Yawe, mpe moko na moko kati na bango akotika nzela na ye ya mabe ; pamba te kotomboka mpe kanda oyo Yawe akani kokitisela bato oyo ezali monene. »


‹ Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakopelisa kanda na Ngai ya makasi na esika oyo, likolo ya bato, ya banyama, ya banzete ya zamba mpe ya mbuma ya mabele : kanda yango ekopela lokola moto, bongo ekokufa te.


Tala ndenge nini Nkolo azipi Siona, mboka kitoko, na lipata ya kanda na Ye : akweyisi lokumu ya Isalaele, wuta na likolo kino na se ; na mokolo ya kanda na Ye, abosanaki enyatelo makolo na Ye !


Yawe asali makambo oyo abongisaki, akokisi liloba na Ye, nyonso oyo aloba wuta kala : akweyisi yo na mawa te, apesi nzela na banguna na yo ete balonga yo, atomboli liseke ya banguna na yo.


Na kanda makasi na Ye, abukaki Isalaele maseke nyonso, alongolaki loboko na Ye ya mobali na likolo na yango tango monguna na bango azalaki kopusana ; apelisaki moto kati na mokili ya Jakobi lokola moto makasi oyo etumbaka biloko nyonso na bangambo na yango nyonso.


Lokola moyini, abendi tolotolo na Ye ; lokola monguna, asemboli loboko na Ye mpe abomi nyonso oyo ezalaki kosepelisa miso ; mpe asopi kanda makasi na Ye lokola moto na likolo ya bandako ya kapo ya Siona, mboka kitoko.


Yawe akani kobuka bamir oyo ezingeli Siona, mboka kitoko ; atandi singa ya komekela molayi mpe azongisi loboko na Ye na sima te mpo na kobebisa ; abebisi bamir oyo ebatelaka engumba mpe bamir mosusu ; bongo akweyisi yango nyonso.


Siona, mboka kitoko, etumbu na yo ekosila ; Nzambe akomema yo lisusu na bowumbu te. Kasi yo Edomi, mboka kitoko, Nzambe akopesa yo etumbu mpo na mabe na yo, mpe akobimisa masumu na yo na polele.


Yango wana, nakosopela bango kanda na Ngai ya makasi mpe natumba bango na moto ya kanda na Ngai, nakopesa bango etumbu kolanda etamboli na bango, elobi Nkolo Yawe. »


Boye, napeliselaki bango kanda na Ngai ya makasi, pamba te bazalaki kotangisa makila kati na mokili mpe bakomisaki yango mbindo na nzela ya banzambe na bango ya bikeko.


Moto oyo azali mosika akokufa na bokono oyo ebomaka, oyo azali pembeni akokufa na mopanga ; mpe oyo atikali, bakozingela ye mpe akokufa na nzala makasi. Nakosilisa kanda na Ngai na banzoto na bango.


Wana otindeli biso pasi makasi oyo, okokisi penza maloba oyo olobaki mpo na kotelemela biso mpe bakambi na biso ; mpe pasi oyo ekweyeli Yelusalemi etikala nanu kosalema te kati na mokili mobimba.


Ngai mpe nakotelemela bino lisusu na kanda makasi mpe nakopesa bino bitumbu mbala sambo mpo na masumu na bino.


liboso ete mokolo oyo ekatama mpo na kosambisama ekoka, liboso ete mokolo yango eleka lokola matiti ya loso oyo mopepe ememi, mpe liboso ete kanda mpe kotomboka ya Yawe ekomela bino !


Maloba mpe malako na Ngai, oyo napesaki na nzela ya basakoli, basali na Ngai, ekomelaki bakoko na bino te ? Solo, ekomelaki bango, babongolaki mitema mpe balobaki : ‹ Yawe, Mokonzi ya mampinga, asaleli biso kolanda banzela mpe misala na biso, asali ndenge kaka akanaki kosala. › »


Pamba te mikolo wana ekozala mikolo ya pasi makasi, mikolo oyo makambo nyonso oyo ekomama ekokokisama.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ