Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bileli 4:10 - Mokanda na Bomoi

10 Basi ya mitema malamu balambi, na maboko na bango, bana na bango moko ; bana na bango bakomi bilei na bango kati na pasi oyo ekomeli bato na ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bileli 4:10
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na mokolo ya libwa ya sanza ya minei, wana nzala makasi ekotaki kati na engumba mpe bato bazalaki lisusu na eloko ya kolia te,


Oh engumba etonda na loyenge, engumba etonda na makelele mpe na bisengo ! Bibembe na yo ekufi na mopanga te to mpe na bitumba te.


Boni, mama akoki solo kobosana bebe na ye oyo azali komelisa mabele, to kozanga bolingo epai ya mwana oyo ye aboti ? Ata soki akoki kobosana, ngai nakoki kobosana yo te !


Nakoleisa bango misuni ya bana na bango ya basi mpe ya mibali, bakoliana bango na bango tango bato oyo bazali na posa ya kosala bango mabe bakozingela bango.


Miso na ngai elembi kobimisa mpinzoli, nazali komitungisa, libumu na ngai ezali kobaluka, motema na ngai ezali kotungisama mpo ete bato na ngai babebisami, mpo ete bana mpe bana oyo bazali komela mabele balembi-lembi banzoto na balabala ya engumba.


Oh Yawe, tala mpe mona ! Nani oyo osalela makambo ya boye ? Boni, basi basengelaki solo kolia mbuma ya mabumu na bango to bana oyo bango moko babokoli ? Boni, basengelaki solo koboma mosakoli mpe Nganga-Nzambe kati na Esika ya bule ya Nkolo ?


Miso na ngai ezali kosopa miluka ya mpinzoli mpo ete bato na ngai babebisami.


Ata mbwa ya zamba ezalaka na posa ya komelisa bana na yango mabele ; kasi bato na ngai bakomi mitema makasi lokola maligbanga kati na esobe.


Yango wana, kati na bino, batata bakolia bana na bango, mpe bana bakolia batata na bango. Nakopesa bino etumbu mpe nakopanza bipai nyonso bato na bino nyonso oyo bakotikala na bomoi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ