Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bileli 3:57 - Mokanda na Bomoi

57 Tango nabelelaki Yo, opusanaki pene na ngai mpe olobaki : « Kobanga te ! »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bileli 3:57
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na butu ya mokolo oyo Izaki akomaki na Beri-Sheba, Yawe abimelaki ye mpe alobaki na ye : « Nazali Nzambe ya Abrayami, tata na yo ; kobanga te, nazali elongo na yo. Mpo na Abrayami, mosali na Ngai, nakopambola yo mpe nakokomisa bakitani na yo ebele. »


Ezayi alobaki na bango : — Boloba na nkolo na bino : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Kobanga te mpo na makambo oyo oyoki, maloba oyo basali ya mokonzi ya Asiri bazali koloba mpo na kosambwisa Ngai.


Na mokolo oyo nabelelaki Yo, oyanolaki ngai, otondisaki ngai na mpiko mpe na makasi.


Yawe azali pene ya bato nyonso oyo babelelaka Ye, ya bato nyonso oyo babelelaka Ye na solo ;


Kobombela lisusu mosali na Yo te elongi na Yo. Yanola ngai noki, pamba te nazali na pasi.


Boye, kobanga te, pamba te nazali elongo na yo ; komitungisa te, mpo ete nazali Nzambe na yo ; nakoyeisa yo makasi mpe nakosunga yo ; solo, nasimbi yo na loboko na Ngai ya mobali, loboko oyo elongisaka.


Oh Jakobi, yo oyo oleki kutu mutsopi te, Isalaele, yo oyo omonani lokola eloko pamba, kobanga te, pamba te Ngai moko nakosunga yo, » elobi Yawe, Mosikoli na yo, Mosantu ya Isalaele.


Boye, tango okobelela Yawe, akoyanola yo ; tango okosenga lisungi, akoloba : ‹ Ngai oyo. › Soki kati na yo, olongoli ekangiseli, otiki kolakisa bato mosapi mpe otiki maloba mabe ;


Mibongisa, yika mpiko ! Telema mpe yebisa bango makambo nyonso oyo Ngai nakotinda yo ; kozala na somo na bango te, noki te nakokweyisa yo liboso na bango.


Mokolo moko, na butu, Nkolo alobaki na Polo kati na emoniseli : Kobanga te, koba kaka koloba, kokanga monoko te.


mpe alobaki : « Polo, kobanga te. Osengeli kosamba liboso ya Sezare. Mpo na yo, Nzambe abateli na bomoi bato nyonso oyo ozali kosala elongo na bango mobembo kati na masuwa. »


Solo, Mibeko ya Moyize ebongisaki eloko moko te. Kasi elikya ya malamu koleka epesameli biso, elikya oyo, na nzela na yango, topusanaka pene ya Nzambe.


Bopusana pene ya Nzambe, mpe Ye akoya pene na bino. Bino bato ya masumu, bosukola maboko na bino ; bino bato ya mitema mibale, bopetola mitema na bino !


Tango namonaki Ye, nakweyaki na makolo na Ye lokola moto akufi. Bongo asimbaki ngai na loboko na Ye ya mobali mpe alobaki na ngai : « Kobanga te ! Nazali Ya liboso mpe Ya suka.


Kobanga te pasi oyo osengeli komona. Tala, Satana akobwaka bato mingi kati na bino na boloko mpo na komeka bino mpe bokonyokwama mikolo zomi. Zala kaka sembo kati na kondima na yo kino na kufa, mpe Ngai nakopesa yo bomoi lokola motole ya elonga na yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ