Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bileli 3:53 - Mokanda na Bomoi

53 balukaki koboma ngai kati na libulu, babwakelaki ngai mabanga ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bileli 3:53
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Babwakaki Jeremi kati na boloko ya se ya mabele epai wapi awumelaki tango molayi.


Kasi sik’oyo mokonzi, nkolo na ngai, nabondeli yo : yoka ngai ! Tika ete mabondeli na ngai ekoma liboso na yo : kozongisa ngai te kati na ndako ya Jonatan, mokomi mikanda, noki te nakokufa kuna !


Boye, bakamataki Jeremi mpe babwakaki ye kati na libulu ya Malikiya, mwana mobali ya mokonzi ; libulu yango ezalaki kati na lopango ya bakengeli. Bakitisaki Jeremi kati na libulu na nzela ya basinga ; libulu ezalaki na mayi te, kaka na potopoto ; mpe Jeremi azindaki makasi kati na potopoto yango.


— Mokonzi, nkolo na ngai, kati na nyonso oyo basali mosakoli Jeremi, bato oyo basali mabe penza ! Basili kobwaka ye kati na libulu epai wapi akokufa na nzala, mpo ete mapa ezali lisusu te kati na engumba !


Boye, mokonzi apesaki mitindo ete bamema Daniele mpe babwaka ye kati na libulu ya bankosi. Mokonzi alobaki na Daniele : — Nzambe na yo, oyo osalelaka na molende, akobikisa yo !


Bamemaki libanga moko ya monene mpe batiaki yango na monoko ya libulu ya bankosi. Mokonzi abetaki yango kashe na nzela ya lopete na ye mpe na nzela ya lopete ya bato na ye ya lokumu, mpo ete babongola eloko moko te na etumbu oyo bakateli Daniele.


Yawe atindaki mbisi moko ya monene komela Yona. Boye Yona asalaki kati na libumu ya mbisi yango mikolo misato mpe babutu misato.


mpe atiaki nzoto yango kati na kunda moko ya sika, oyo atobolisaki ye moko kati na libanga moko ya monene. Mpe atindikaki libanga mosusu ya monene liboso ya ekotelo ya kunda yango, mpe azongaki.


Boye bakendeki mpe basalaki nyonso oyo ekoki mpo ete kunda ekengelama malamu ; batiaki elembo na libanga oyo bakangaki na yango kunda mpe batiaki bakengeli.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ