Mafinga ezokisi motema na ngai, mpe pota yango ezali kosila te ; nazelaki elembo ya mawa kowuta na bato, kasi namonaki yango te ; nalukaki babondisi, kasi namonaki bango te.
Yango wana, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi na tina na basakoli : « Nakoleisa bango bilei ya bololo mpe nakomelisa bango mayi ya ngenge, pamba te ezali na nzela ya basakoli ya Yelusalemi nde bato ya mokili mobimba bobosani Nzambe. »
Mpo na nini tozali kovanda awa ? Tosangana esika moko ! Tika ete tokima kati na bingumba batonga makasi mpo ete tokufela kuna ! Pamba te Yawe, Nzambe na biso, afungoleli biso ekuke ya kufa mpe apesi biso mayi oyo ezali na ngenge mpo ete tomela, pamba te tosalaki masumu liboso na Ye.