12 Abendaki tolotolo na Ye mpe akomisaki ngai esika na Ye ya kobamba makonga.
Makonga ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso etoboli ngai, mpe molimo na ngai ezali komela ngenge na yango ; Nzambe atelemeli ngai na kanda na Ye.
Oh Mokeli na ngai, soki nasali lisumu, eloko nini ngai nasali Yo ? Mpo na nini oponi kaka kobeta ngai ? Boni, nakomi mokumba mpo na Yo ?
Yawe, kopamela ngai te kati na kanda na Yo to kopesa ngai etumbu te kati na kanda makasi na Yo.
Lokola moyini, abendi tolotolo na Ye ; lokola monguna, asemboli loboko na Ye mpe abomi nyonso oyo ezalaki kosepelisa miso ; mpe asopi kanda makasi na Ye lokola moto na likolo ya bandako ya kapo ya Siona, mboka kitoko.