Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bileli 3:1 - Mokanda na Bomoi

1 Nazali moto oyo amona pasi na nzela ya fimbu ya kanda na Ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bileli 3:1
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Balingami na ngai, boyokela ngai mawa, nabondeli bino penza, boyokela ngai mawa, pamba te loboko ya Nzambe ebeti ngai.


Mpo na kanda monene na Yo, otombokeli ngai mpe obwaki ngai mosika.


Atako osalaki ete tokutana na pasi mingi mpe na makambo ya bololo, kasi okotika lisusu biso kozala na bomoi, okobimisa ngai lisusu wuta na mozindo ya mabele.


Obwaki ngai na libulu ya mozindo makasi, kati na mozindo ya molili.


Bato batiolaki mpe basundolaki ye, ye moto na pasi, amesana konyokwama. Lokola moto oyo babwakeli soyi na elongi, atiolamaki, mpe tondimaki ye te.


Boye, bakamataki Jeremi mpe babwakaki ye kati na libulu ya Malikiya, mwana mobali ya mokonzi ; libulu yango ezalaki kati na lopango ya bakengeli. Bakitisaki Jeremi kati na libulu na nzela ya basinga ; libulu ezalaki na mayi te, kaka na potopoto ; mpe Jeremi azindaki makasi kati na potopoto yango.


bamemaki lisusu mibali, basi, bana mpe bana basi ya mokonzi oyo Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, apesaki na maboko ya Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, mwana mobali ya Shafani. Bamemaki mpe mosakoli Jeremi mpe Baruki, mwana mobali ya Neriya.


Ndenge bato na ngai bazali koyoka pasi, ndenge wana mpe ngai nazali koyoka pasi, nazali kolela, mpe somo ekangi ngai makasi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ