Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bileli 2:9 - Mokanda na Bomoi

9 Bikuke na yango ezindi na mabele ; abuki-buki mpe abebisi banzete oyo bakangelaka bikuke yango. Mokonzi mpe bakambi na ye bakei na bowumbu kati na bikolo, Mobeko ezali lisusu te, mpe basakoli na ye bazali kozwa lisusu te bimoniseli kowuta na Yawe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bileli 2:9
27 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bakataki mito ya bana mibali ya Sedesiasi na miso na ye ; mpe Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, atobolaki miso ya Sedesiasi, apesaki mitindo ete bakanga ye minyololo ya bronze mpe bamema ye na Babiloni.


Na tango molayi, Isalaele azangaki Nzambe ya solo, azangaki Banganga-Nzambe mpo na koteya ye, mpe azangaki mibeko.


Balobaki na ngai : « Bayuda oyo babikaki mpe batikalaki wuta na bowumbu bazali kovanda kati na etuka ya Yuda mpe bazali na pasi mingi mpe na soni makasi ; mir ya Yelusalemi etondi na madusu, mpe bikuke na yango ebebisamaki na moto. »


Tozali lisusu komona te bilembo na biso, basakoli bazali lisusu te ; mpe moko te kati na biso ayebi tango boni makambo oyo ekowumela.


Libebi kaka nde etikali kati na engumba, babuki-buki bikuke na yango na biteni.


Yawe alobaki na ngai : — Basakoli bazali kosakola makambo ya lokuta na Kombo na Ngai. Natindaki bango te, naponaki bango te mpe nalobaki na bango likambo moko te. Bimoniseli mpe masakoli na bango ezali ya lokuta ; makambo nyonso oyo bazali kosakola ezali pamba, ewutaka nde na makanisi ya mitema na bango moko.


Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Boyoka te makambo oyo basakoli bazali kosakola epai na bino !


Tango Sedesiasi akokisaki mibu zomi na moko na bokonzi, na mokolo ya libwa ya sanza ya minei, lidusu moko efungwamaki kati na mir ya engumba.


Basoda ya Babiloni batumbaki ndako ya mokonzi mpe bandako ya bato, mpe babukaki bamir ya Yelusalemi.


Basoda ya Babiloni batiki kobunda, babombami kati na bandako batonga makasi. Makasi na bango esili, bakomi lokola basi. Bandako ya Babiloni etumbami mpe babuki bikangelo bikuke na yango.


Mampinga nyonso ya Babiloni, oyo ezalaki na se ya bokonzi ya mokonzi ya bakengeli ya mokonzi babukaki bamir oyo ezingelaki Yelusalemi.


Yuda akei na bowumbu, akomi konyokwama mpe kosala misala makasi ; azali kovanda kati na bikolo, azali lisusu na esika ya kopema te. Bato nyonso oyo bazali kolanda ye, bakangi ye kati na pasi makasi.


Bato bazali koganga mpe koloba na bango : « Bolongwa awa, bato ya mbindo ! Bolongwa awa, bolongwa awa, bosimba biso te ! » Wana bazalaki kokima mpe kotelengana, bato ya bikolo mosusu bazalaki koloba : « Bavanda na esika oyo te ! »


Mopakolami na Yawe, oyo totielaki motema akangami na mitambo na bango ; nzokande tozalaki kokanisa boye na tina na ye : « Tokobika bomoi malamu na se ya bobatelami na ye kati na bikolo. »


Nakotiela ye motambo na Ngai, mpe akokangama penza na motambo yango ; nakomema ye na Babiloni, mokili ya bato ya Chalide ; kasi akomona yango te mpe akokufela kuna.


Nakotiela ye motambo na Ngai, mpe akokangama na motambo na Ngai ; nakomema ye na Babiloni mpe nakosambisa ye kuna, pamba te atambolaki na boyengebene te liboso na Ngai.


Pasi likolo ya pasi nde ekokomela bango, basango ya mabe na ya mabe nde ekolandana. Bakoluka bimoniseli na pamba epai ya basakoli ; Banganga-Nzambe bakokoka lisusu te koteya malakisi ya Mobeko, mpe bakambi bakozanga toli ya kopesa.


Mopanga ekokota na bingumba na bango, ekobuka bikangelo ya bikuke na bango mpe ekosukisa mabongisi na bango.


Solo, bana ya Isalaele bakowumela tango molayi bazanga mokonzi, bazanga mokambi, bazanga mbeka, bazanga libanga ya ekaniseli, bazanga efode mpe bazanga banzambe ya bikeko.


Nakobuka ekuke ya Damasi, nakobebisa mokonzi ya bavandi ya Lubwaku ya Beti-Aveni, mpe oyo azali kokonza na Beti-Edeni ; mpe bato ya Siri bakokende na bowumbu na Kiri, » elobi Yawe.


Yawe akomema bino mpe mokonzi oyo bokopona mpo na koyangela bino, na ekolo oyo bino mpe bakoko na bino botikala nanu koyeba te. Kuna bokogumbamela banzambe mosusu : banzambe ya banzete mpe ya mabanga.


Ndenge kaka Yawe asepelaki kosalela bino bolamu mpe mpo na kokomisa bino ebele, ndenge wana mpe akosepela koboma bino mpe kobebisa bino ; akopikola bino na mokili oyo bozali kokota mpo na kozwa yango.


Saulo atunaki Yawe, kasi Yawe ayanolaki te, ezala na nzela ya ndoto, ya Urimi to ya basakoli.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ