Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bileli 2:6 - Mokanda na Bomoi

6 Abebisi lopango na ye ndenge babebisaka lopango ya elanga, abebisi esika na bango ya mayangani. Na kanda makasi na Ye, Yawe asali ete Siona abosana bafeti oyo ekatama mpe mikolo ya Saba ; mpe apameli mokonzi mpe Nganga-Nzambe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bileli 2:6
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

batumbi Esika na Yo ya bule, bakweyisi mpe bakomisi mbindo esika oyo Kombo na Yo evandaka.


Nzambe ayebani kati na Yuda ; Kombo na Ye ezali monene kati na Isalaele.


Epanzaki bitape na yango kino na ebale monene, mpe mito na yango ya sika kino na ebale.


Owanganaki boyokani oyo osalaki elongo na mosali na Yo, obwakaki na mabele mpe osambwisaki motole na ye.


Botika komemela Ngai makabo oyo ezanga tina ! Nazali koyoka malasi na bino ya ansa nkele. Bafeti na bino ya ebandeli ya sanza, ya Saba mpe mayangani na bino : bafeti wana ya mabe, nazali kokoka yango lisusu te.


Siona, mboka kitoko, etikali kaka yango moko lokola mwa ndako moko ya matiti kati na elanga ya vino, lokola ndako ya kobombamela kati na bilanga ya bapasiteki, lokola engumba oyo ebatelami.


Boye, nakosambwisa bakambi ya tempelo na bino mpe nakobongisa Jakobi mpo na kobebisama, mpe Isalaele, mpo na pasi.


Sik’oyo, nakoloba na bino makambo oyo nakosala na elanga na ngai ya vino : Nakokweyisa lopango na yango, mpe ekobebisama ; nakotobola madusu kati na bamir na yango, mpe baleki nzela bakokoma konyata-nyata yango.


Nakokomisa yango esobe : kati na yango, bakolongola lisusu te, ezala mabanga to matiti ; bongo banzube mpe basende ekokola kuna. Nakopesa mitindo na mapata ete enokisela yango lisusu mvula te.


Bato na Yo bazwaki esika na Yo ya bule kaka mpo na mwa tango moke ; kasi sik’oyo, banguna na biso bakweyisi Ndako na Yo ya bule !


Oh Yawe, sima na makambo oyo nyonso, okozongisa kaka motema na Yo sima te ? Okokanga kaka monoko mpe okopesa biso kaka etumbu oyo eleki ndelo ?


Kasi soki botosi Ngai te mpe bobulisi te mokolo ya Saba, bongo bomemi mpe bolekisi mikumba na bino na bikuke ya Yelusalemi na mokolo ya Saba, nakopelisa moto oyo ekufaka te na bikuke ya Yelusalemi mpe ekozikisa bandako na yango nyonso oyo batonga makasi. › »


Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‹ Ndenge kanda mpe kotomboka na Ngai epelelaki bavandi ya Yelusalemi, ndenge wana mpe nakopelisela bino kanda na Ngai tango bokokende na Ejipito. Bokokoma ndakisa mpo na koloba maloba ya bosoloka, eloko ya koyoka somo, eloko ya lisuma mpe ya kotiola ; mpe bokotikala komona lisusu esika oyo te. ›


Kasi Yawe alobaki na ngai : Loba na ye : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : Nakokweyisa biloko nyonso oyo natongaki mpe nakopikola biloko nyonso oyo nalonaki kati na mokili oyo.


Boyoka ! Tala bango bazali kokima mpe babiki wuta na mokili ya Babiloni mpo na koyebisa kati na Siona ndenge nini Yawe, Nzambe na biso, azongisi mabe na mabe ; ndenge nini azongisi mabe na mabe likolo na Tempelo na Ye.


Nzela oyo ekenda kino na Siona ezali na matanga, pamba te bato bazali koya lisusu na bafeti te. Bikuke na ye nyonso etikali lisusu na bato te, Banganga-Nzambe na ye bazali kolela, bana na ye ya basi oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te bazali na mawa ; bongo ye moko akomi na pasi makasi kati na motema.


Yawe, Ye moko, apanzi bango, azali kotala bango lisusu te. Bapesaki Banganga-Nzambe lokumu te mpe bayokelaki mibange mawa te.


Mopakolami na Yawe, oyo totielaki motema akangami na mitambo na bango ; nzokande tozalaki kokanisa boye na tina na ye : « Tokobika bomoi malamu na se ya bobatelami na ye kati na bikolo. »


Badiembiki bakalaka, na maboko na bango ; mpe bapesi bakambi lokumu te.


Atosaki te ndayi oyo alapaki mpe abukaki boyokani. Lokola atombolaki loboko na ye na ndayi mpe asali makambo ya boye, akobika te !


Nakokomisa bingumba na bino bisobe, nakobebisa bisika na bino ya bule mpe nakosepela te lisusu na solo kitoko ya malasi na bino.


Lokola na mikolo ya bafeti oyo ekatama, nakolongola pasi kati na yo mpo ete ozala lisusu na soni te.


« Boye, nasalaki ete botiolama mpe bosambwa liboso ya bato nyonso, pamba te bolandaki banzela na Ngai te, kasi bozalaki kopona bilongi na makambo oyo etali mibeko. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ