Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bileli 2:22 - Mokanda na Bomoi

22 Ndenge obengisaka bato na mokolo ya feti, ndenge wana mpe obengisaki pasi wuta na bangambo nyonso mpo na kosala ngai mabe. Na mokolo ya kanda ya Yawe, moto moko te abikaki to atikalaki na bomoi. Monguna na ngai abebisi bato oyo nazalaki kobokola mpe kobatela.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bileli 2:22
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bokende na bilanga te mpe bobima na nzela te, pamba te monguna asimbi mopanga, bongo somo makasi ezali bisika nyonso.


Babosani ngai lokola moto oyo asila kokufa ; nakomi lokola mbeki oyo epanzana.


Nazali komona nini ? Bazali kolenga na somo mpe kozonga sima ; balongi basoda na bango ya mpiko, bazali kopota mbangu makasi mpe bazali ata kotala sima te : somo ekangi bango na bangambo nyonso, » elobi Yawe.


Mokolo oyo elandaki, tango Pashuri alongolaki ye na likonzi, Jeremi alobaki na ye : — Yawe akobenga yo lisusu Pashuri te, kasi Magori-Misabibe.


Mabota na bino, milona na bino, bibwele na bino : bangombe, bameme mpe bantaba ekolakelama mabe.


Tango makambo nyonso oyo ekoya, ekobebisa bino ; pamba te ekoleka na tongo nyonso, na moyi nyonso mpe na butu nyonso. » Bososoli ya emoniseli oyo ekomema nde somo makasi.


Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi : « Nakotindela bango pasi ya makasi, mpe ata moto moko te akobika na yango. Ata soki bagangi epai na Ngai, nakoyoka bango te.


Sik’oyo tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga mpe Nzambe ya Isalaele, alobi : Mpo na nini bozali komimemela pasi ya makasi boye kino mokili ya Yuda ezangela mibali, basi, babebe mpe etikala lisusu ata na moto moko te ?


Boye, mpo na kobebisa bango, Yawe atindaki mokonzi ya bato ya Babiloni, oyo abomaki na mopanga bilenge na bango kati na esika na bango ya bule ; abikisaki te ezala elenge mobali, elenge mwasi, mokolo to mobange. Nzambe akabaki nyonso na maboko ya Nabukodonozori.


Boni, obwaki solo Yuda ? Oyini penza Siona ? Mpo na nini otindeli biso pasi makasi oyo ezangeli nzela ya kobika ? Tokanisaki ete tokozwa kimia ; nzokande, eloko moko ya malonga esalemi te ! Tokanisaki ete tokozala na nzoto kolongono ; nzokande, tozali kaka komona pasi na pasi !


Sima na yango, elobi Yawe, nakokaba na maboko ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, mpe na maboko ya banguna na bango oyo bazali na posa ya kosala bango mabe : Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, bakalaka na ye mpe bavandi ya engumba oyo, ba-oyo bakobika na bokono oyo ebomaka, na mopanga mpe na nzala makasi. Nabukodonozori akoboma bango na mopanga, akokangela bango motema mpe akoyokela bango mawa te. ›


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ