Bileli 2:2 - Mokanda na Bomoi2 Na kozanga mawa, Nkolo abebisi bandako nyonso ya Jakobi ; na kanda na Ye, akweyisi bandako batonga makasi ya Yuda, mwasi kitoko, mpe asambwisi bokonzi mpe bakambi na yango. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Sima na yango, elobi Yawe, nakokaba na maboko ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, mpe na maboko ya banguna na bango oyo bazali na posa ya kosala bango mabe : Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, bakalaka na ye mpe bavandi ya engumba oyo, ba-oyo bakobika na bokono oyo ebomaka, na mopanga mpe na nzala makasi. Nabukodonozori akoboma bango na mopanga, akokangela bango motema mpe akoyokela bango mawa te. ›
Edomi akoki koloba : « Ata babebisi mokili na biso, tokotonga yango kaka lisusu ! » Kasi tala makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Solo, bakotonga na bango yango, kasi Ngai nakobuka yango ! Bakobenga mokili yango : ‹ Mokili ya makambo mabe, bato oyo bazali tango nyonso na se ya kanda ya Yawe. ›