18 Mitema ya bato ezali koganga epai na Nkolo. Oh mir ya Siona, mboka kitoko, tika ete mpinzoli na yo ebima lokola ebale, butu mpe moyi, mpe miso na yo ekangama te !
Soki boyoki te, nakolela na nkuku mpo na lolendo na bino, nakolela makasi, mpe miso na ngai ekosopa mpinzoli, pamba te etonga ya Yawe ekokende na bowumbu.
Loba na bango maloba oyo : ‹ Butu mpe moyi, miso na ngai ezali kobimisa mpinzoli, ezali kokawuka te ! Pamba te moseka na ngai, bato na ngai, bazali na pasi mingi mpo ete babetami makasi.
Nayoki makelele lokola koganga ya mwasi oyo azali na pasi ya kobota, kolela ya pasi lokola mwasi oyo azali kobota mwana na ye ya liboso : ezali makelele ya kolela ya Siona, mboka kitoko ; azali kolela, maboko likolo, mpe azali koloba : « Nabebi na ngai, nakomi na suka liboso ya babomi. »
Ah ! Soki nazalaki ata na ndako ya bapaya kati na esobe, nalingaki ata kokima bato na ngai mpe kozala mosika na bango, pamba te bango nyonso bazali bandumba, bazali lisanga ya bakosi !
Tala tina nini nazali kolela mpe miso na ngai etondi na mpinzoli ; moto moko te ayei pene na ngai mpo na kobondisa ngai, moto moko te ayei kolendisa molimo na ngai. Bana na ngai bazali na pasi, mpo ete monguna aleki ngai na makasi.
Butu mobimba, azali kolela se kolela, mpinzoli etondi na matama na ye. Kati na bamakangu na ye nyonso, moko te ayei kobondisa ye ; baninga na ye nyonso bakosi ye, bakomi banguna na ye.
Babelelaka Ngai te wuta na mozindo ya mitema na bango, kasi balelaka na bambeto na bango. Tango bamikataka banzoloko mpo na kozwa ble mpe vino ya sika, bakomaka nde mosika na Ngai.