Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bileli 2:12 - Mokanda na Bomoi

12 Bazalaki koloba na bamama na bango : « Epai wapi tokoki kozwa ble mpe masanga ya vino ? » Ndenge bazalaki kokweya-kweya lokola bato oyo bazoki bapota minene na babalabala ya engumba, ndenge wana mpe bazalaki kokufa na maboko ya bamama na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bileli 2:12
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sik’oyo, bomoi na ngai ekeyi, mpe mikolo ya pasi ekangi ngai.


Butu mpe moyi, mpinzoli na ngai ezalaka bilei na ngai ; pamba te balobaka na ngai tango nyonso : « Nzambe na Yo azali wapi ? »


Nzambe azali lobiko mpe nkembo na ngai ; libanga ya makasi na ngai mpe ebombamelo na ngai ezali kati na Nzambe.


Bana na yo balembi, balali-lali na babalabala nyonso lokola mboloko oyo ekangami na motambo ; kanda ya Yawe mpe pamela ya Nzambe na yo nde ebuki-buki bango lolenge wana.


Yango wana, nakopesa ye libula kati na bato minene, mpe akokabola bomengo ya bitumba elongo na bato ya makasi, pamba te akabaki bomoi na ye na kufa mpe amitikaki ete batanga ye na molongo ya babomi bato, pamba te amemaki masumu ya bato ebele mpe amikomisaki molobeli ya babuki mibeko.


Bakobotola milona mpe bilei na yo, bakoboma bana na yo ya basi mpe ya mibali, bakobotola bangombe mpe bameme na yo, bakobebisa bilanga na yo ya vino mpe banzete na yo ya figi, bakobebisa na mopanga bingumba na yo ya makasi oyo otielaka motema.


Bato na ye nyonso bazali kolela lokola bato bazali koluka bilei ; bapesaki bomengo na bango mpo na kozwa bilei, mpo ete bawumela na bomoi. Oh Yawe, tala mpe mona ndenge natiolami !


Likolo ya nzala, lolemo ya mwana ekangami na likolo ya kati ya monoko na ye ; bana mike bazali kosenga bilei kasi moto moko te azali kopesa bango yango.


Nakolendisa maboko ya mokonzi ya Babiloni mpe nakotia mopanga na Ngai kati na loboko na ye. Kasi nakobuka maboko ya Faraon, mpe akokoma kolela liboso na ye lokola moto oyo azoki pota monene.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ