Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bileli 1:9 - Mokanda na Bomoi

9 Mbindo na ye ekangami ye na elamba, ayebaki te makambo nini ekokomela ye na sima. Tala ye wana akweyi, bongo kokweya na ye ezali kokamwisa ; moto oyo akolendisa ye azali te ! « Oh Yawe, tala pasi na ngai, pamba te monguna alongi ngai ! »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bileli 1:9
46 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango mosusu Yawe akomona pasi na ngai, bongo akobongola na bolamu bilakeli mabe oyo ezali kokweyela ngai lelo. »


Yawe amonaki ndenge nini bana nyonso ya Isalaele bazalaki konyokwama. Ezala bawumbu to bansomi, moto moko te akokaki kosunga bango.


Sik’oyo, Oh Nzambe na biso, Nzambe Monene, Nzambe na nguya mpe ya somo, Yo oyo obatelaka boyokani mpe bolingo na Yo, komona te lokola likambo ya pamba na miso na Yo pasi oyo ekomeli biso, bakonzi na biso, bakambi na biso, Banganga-Nzambe na biso, basakoli na biso, batata na biso mpe bato na Yo nyonso, wuta na tango ya bakonzi ya Asiri kino na mokolo ya lelo.


Mona malamu pasi na ngai mpe kangola ngai, pamba te nabosanaka mibeko na Yo te.


Oh Yawe, Nkolo na ngai, ozali makasi ya lobiko na ngai, obatelaka moto na ngai kati na mokolo ya etumba.


Tala pasi mpe kolela na ngai, mpe limbisa masumu na ngai nyonso.


Mafinga ezokisi motema na ngai, mpe pota yango ezali kosila te ; nazelaki elembo ya mawa kowuta na bato, kasi namonaki yango te ; nalukaki babondisi, kasi namonaki bango te.


Mpe nalobi : « Nakolongola bino na minyoko ya Ejipito mpo na komema bino na mokili ya bato ya Kanana, ya Iti, ya Amori, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi, na mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi. »


Yawe alobaki : — Namoni pasi ya bato na Ngai kuna na Ejipito ; nayoki koganga na bango mpo na misala makasi oyo bakonzi ya misala makasi bazali kopesa bango. Nayebi pasi na bango.


Bato bandimaki. Bongo tango bayokaki ete Yawe akanisaki bana ya Isalaele mpe amonaki pasi na bango, bafukamaki mpe bagumbamelaki Yawe.


Natalaki lisusu mpe namonaki minyoko nyonso oyo ezali na se ya moyi : Namonaki mpinzoli ya banyokolami, mpe moto akobondisa bango azalaki te ; nguya ezalaki na ngambo ya banyokoli, mpe moto akobondisa bango azalaki te.


Yelusalemi ezali kotepatepa, mpe Yuda ekweyi ; mpo ete maloba mpe misala na bango ezali ya botomboki liboso ya Yawe, ezali kotelemela lokumu ya Kombo na Ye.


Oh Yawe, pesa litoyi mpe yoka ; Yawe, fungola miso mpe mona ! Yoka maloba nyonso oyo Senakeribe atindi mpo na kosambwisa Nzambe na bomoi.


Nani oyo ofingaki mpe otiolaki ? Nani oyo omatiselaki mongongo mpe otalaki na miso ya lolendo ? Mosantu ya Isalaele !


Lokola otombokelaka Ngai, mpe lofundu na yo ekomi kino na matoyi na Ngai, nakotia lopete na Ngai na zolo na yo, nakokanga yo singa na bibebu ndenge bakangaka mpunda monoko, mpe nakozongisa yo na nzela oyo oyelaki.


Tango mosusu Yawe, Nzambe na yo, akoyoka maloba ya mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi, oyo nkolo na ye, mokonzi ya Asiri, atindaki mpo na kosambwisa Nzambe na bomoi ; mpe tango mosusu akopesa ye etumbu mpo na maloba oyo Yawe, Nzambe na yo, ayokaki ! Boye, sambela mpo na ndambo ya bato oyo bazali nanu na bomoi. › »


Boloba kati na Yelusalemi, boyebisa ye ete minyoko na ye ekomi na suka, masumu na ye esili kolimbisama, pamba te asili kozwa na loboko ya Yawe ngolu koleka mbala mibale mpo na masumu na ye nyonso.


Olobaki : « Nakozala mwasi mokonzi mpo na libela ! » Kasi motema na yo ekanisaki te tina ya makambo oyo mpe ndenge nini ekosukela.


Makama mibale oyo ekomeli yo, nani akoki kolendisa yo : Mokili na yo ekomi mipiku ya mabanga mpe ebebisami, nzala makasi mpe mopanga, nani akobondisa yo ?


Oh engumba ya mawa, engumba oyo mopepe makasi esili kobuka mpe ezangeli kobondisama, nakotonga yo lisusu na mabanga ya talo mpe nakosala miboko na yo na mabanga ya safiri,


Namoni bondumba na yo mpe posa na yo ya kosangisa nzoto ; ekobo na yo ezali na soni ata moke te. Namoni banzambe na yo ya bikeko na likolo ya bangomba mpe kati na bilanga. Mawa na yo Yelusalemi, ozali peto te ! Kino tango nini okozala mbindo ? »


Moto moko te akopesa bilei mpo na kobondisa bato oyo bazali na matanga sima na kufa, mpe moto moko te akopesa bango masanga mpo na kobondisa bango, ezala ata mpo na kufa ya batata to ya bamama na bango.


Kino na bilamba na yo, bato bamonaka makila ya babola, ya bato oyo bayebi likambo te mpe okangi bango na mabe te.


« Bolangwisa ye masanga, pamba te abetaki tembe na Yawe ! Tala ye Moabi ndenge azali kobaluka kati na bisanza na ye ! Tika ete, ye mpe, akoma eloko ya maseki !


basakoli bazali kosakola makambo ya lokuta, Banganga-Nzambe bazali kosalela bokonzi na bango ndenge balingi, mpe bato na Ngai bazali kosepela bongo. Kasi bokosala nini na suka ? »


Bosangisa bato nyonso oyo babundaka na matolotolo mpo na kotelemela Babiloni ; tika ete bato nyonso oyo babundaka na makonga bazingela Babiloni mobimba, basala ete ata moto moko te akima, bafuta yango ndenge ezalaki misala na yango mpe bazongisela yango makambo oyo esalaki bikolo mosusu ; pamba te ebetaki tembe na Yawe, Mosantu ya Isalaele.


Siona atomboli maboko na ye, kasi moto oyo akobondisa ye azali te. Yawe azwi mokano mpo na Jakobi ete bazalani na ye bakokoma banguna na ye, mpe ete Yelusalemi akokoma eloko ya mbindo na miso na bango.


Bato bayokaki na bango kolela na ngai, kasi moto akobondisa ngai azali te ; banguna na ngai nyonso bayokaki sango ya pasi na ngai mpe basepelaki na makambo oyo osalaki. Tika ete okokisa solo mokolo oyo olakaki, mpo ete bango mpe bakoma lokola ngai !


Naloba lisusu nini mpo na yo ? Nakokanisa yo na nani, Yelusalemi, mboka kitoko ? Nakokanisa yo na nani mpo ete nakoka kobondisa yo, Siona, mboka kitoko ? Pota na yo ezali monene lokola ebale monene ; nani akoki kobikisa yo ?


Ndenge nini wolo ebungisi kongenga na yango, wolo ya peto enzuluki ! Mabanga ya talo oyo ya bule epanzani na basonge ya babalabala nyonso.


Oh Yawe, kanisa makambo oyo ekomeli biso ! Tala mpe mona soni na biso !


Nakobebisa bilanga na ye ya vino mpe banzete na ye ya figi oyo azalaki koloba na tina na yango : « Ezali bakado oyo bamakangu na ngai bapesaki ngai ; » nakokomisa yango matiti ya zamba, mpe banyama ya zamba ekolia yango.


Wana nde lifuti oyo bakozwa mpo na lolendo na bango, pamba te bafingaki mpe batiolaki bato ya Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Bayuda mingi bayaki epai ya Mari mpe Marte mpo na kokabola mawa elongo na bango, mpo na kufa ya ndeko na bango.


Boye togangaki epai na Yawe, Nzambe ya bakoko na biso. Wana ayokaki mingongo na biso, amonaki mawa, pasi mpe minyoko na biso ;


Kasi nazali kobanga ete banguna bafinga Ngai mpe bayini na bango bamikosa te na koloba : ‹ Tolongaki na makasi na biso moko, Yawe asalaki eloko moko te. › »


Soki kaka bazalaki bato ya bwanya, balingaki kososola likambo oyo mpe koyeba ndenge nini suka na bango ekozala !


Pamba te tokomi na tango oyo kosambisama ezali kobanda epai ya bato ya Nzambe. Bongo soki ebandi epai na biso, ekosuka ndenge nini epai ya bato oyo batosaka te Sango Malamu ya Nzambe ?


Bongo apesaki elaka, alobaki : « Eh Yawe, Mokonzi ya mampinga, soki kaka otali pasi ya mwasi mowumbu na Yo, soki okanisi ngai mpe obosani te mwasi mosali na Yo, kasi opesi ye mwana mobali, nakokaba ye epai na Yawe mpo na mikolo nyonso ya bomoi na ye, mpe bakotikala kokata suki ya moto na ye te. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ