Bileli 1:8 - Mokanda na Bomoi8 Yelusalemi asali masumu mingi penza, yango wana akomi mbindo. Bato nyonso oyo bazalaki kopesa ye lokumu bakomi kotiola ye, pamba te bamoni bolumbu na ye ; ye moko mpe azali komilela mpe abaluki mpo na kobomba elongi. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe alobi : Lokola botosaki Ngai te, bosakolaki te kokangolama ya bandeko na bino moko mpe bopesaki bango bonsomi te, Ngai mpe, elobi Yawe, nasakoli ete napesi sik’oyo bonsomi epai ya mopanga, epai ya bokono oyo ebomaka mpe epai ya nzala makasi ; nafungoli yango mpo na kotelemela bino : nakokomisa bino eloko ya koyoka somo, na miso ya bikolo nyonso ya mabele ;
Mpe bato ya bikolo mosusu bakoyeba solo ete bana ya Isalaele bakendeki na bowumbu mpo na masumu na bango mpe mpo ete batambolaki na boyengebene te na miso na Ngai. Boye, napesaki bango mokongo mpo na kobomba elongi na Ngai mpe nakabaki bango na maboko ya banguna na bango, mpe bango nyonso bakufaki na mopanga.
Lokola ezali bongo, tala makambo oyo Ngai Yawe, Nzambe ya Isalaele, nalobi : ‹ Nalakaki ete libota na yo mpe libota ya tata na yo bakosalela Ngai tango nyonso lokola Banganga-Nzambe. › Kasi sik’oyo, Ngai Yawe nalobi : ‹ Esili ! Mosika na Ngai elaka oyo ! Bato oyo bazali kopesa Ngai lokumu, bango kaka nde Ngai nakopesa lokumu ; kasi ba-oyo bazali kotiola Ngai, nakoyokisa bango soni.