Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bileli 1:7 - Mokanda na Bomoi

7 Na mikolo na ye ya pasi mpe ya koyengayenga, tango bato na ye bazali kokweya na maboko ya banguna mpe moto akosunga ye azali te, Yelusalemi azali kokanisa bomengo na ye nyonso ya kala ; bayini na ye batali ye na pamba mpe basepeli na kobebisama na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bileli 1:7
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

« Ah ! Soki nakokaki kozala lisusu ndenge nazalaki na basanza oyo eleki, ndenge nazalaki na mikolo oyo Nzambe azalaki kobatela ngai,


Butu mpe moyi, mpinzoli na ngai ezalaka bilei na ngai ; pamba te balobaka na ngai tango nyonso : « Nzambe na Yo azali wapi ? »


Tango nazalaka na pasi, nalukaka Nkolo ; na butu, nalembaka te kotombola maboko na ngai mpe naboyaka kobondisama.


Tala ndenge bato ya bikolo oyo ezingeli biso bazali kofinga biso, mpe tokomi lokola eloko ya liseki na miso na bango !


Tempelo na biso ya bule mpe ya lokumu epai wapi batata na biso bazalaki koyemba masanzoli mpo na lokumu na Yo, esili kozika na moto ; mpe nyonso oyo tozalaki na yango ya motuya esili kobebisama !


Oh Yawe, sima na makambo oyo nyonso, okozongisa kaka motema na Yo sima te ? Okokanga kaka monoko mpe okopesa biso kaka etumbu oyo eleki ndelo ?


« Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : Yebisa mokonzi ya Yuda oyo atindi yo kotuna toli epai na Ngai : ‹ Basoda ya Faraon oyo babimaki na mokili na bango mpo na koya kosunga yo bakozonga na mokili na bango, na Ejipito ;


Boni, Isalaele azalaki eloko ya maseki te na miso na bino ? Bokangaki ye kati na miyibi mpo ete bokoma koseka ye tango nyonso bokolobela kombo na ye ?


Miso na biso elembaki lisusu mpo na kozela na pamba lisungi ; wuta na bandako milayi na biso ya kotalela na mosika, tozalaki kotala wana tozalaki kozela lisungi kowuta na ekolo songolo mpe pakala, kasi ebikisaki biso te.


Yebisa bato ya Amoni : ‹ Boyoka liloba na Nkolo Yawe ! Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Lokola bosepelaki tango babebisaki bosantu ya Esika na Ngai ya bule, tango mokili ya Isalaele etikalaki lisusu na bato te mpe wana bato ya Yuda bakendeki na bowumbu,


Pamba te, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Lokola ozalaki kobeta maboko mpe kotuta makolo na esengo mpo na kotiola mokili ya Isalaele,


Mama na bango atambolaki na kindumba, mpe ye oyo abotaki bango azali mwasi ya lokumu te. Alobaki : « Nakolanda bamakangu na ngai, oyo bapesaka ngai bilei mpe mayi, bilamba ya lino mpe bilamba basala na bapwale ya meme, mafuta mpe masanga. »


Kasi sik’oyo, bikolo ebele esangani mpo na kotelemela yo ; bazali koloba : « Tika ete bosantu ya Siona esambwa mpe miso esepela komona kobebisama na yango ! »


Bongo akomaki kokanisa na tina na bomoi na ye, alobaki : « Basali boni tata na ngai azwa na mosala mpe bazali kolia ndenge balingi, mpe biloko ya kolia eleki kutu ebele ; kasi ngai nazali kokufa awa na nzala !


Kasi Abrayami azongisaki : « Mwana na ngai, kanisa ete, wana ozalaki na bomoi, ozwaki bolamu ebele, kasi Lazare azwaki nde pasi ebele. Sik’oyo awa, azali kozwa kobondisama na ye ; kasi yo, okomi na pasi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ