Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bileli 1:5 - Mokanda na Bomoi

5 Banguna na ye bakomi bakonzi na ye, bayini na ye bazali na esengo ; pamba te Yawe atindeli Siona pasi likolo ya ebele ya masumu na ye. Bana na ye ya mibali bakei na bowumbu, bakangi bango mpe bazali kotambola liboso ya monguna na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bileli 1:5
38 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

pamba te basalaki mabe na miso na Ngai mpe bapelisaki kanda na Ngai, wuta na mokolo oyo batata na bango babimaki na Ejipito kino na mokolo ya lelo. › »


Oleisaki bango lipa esangana na mayi ya miso mpe olangwisaki bango na kopo etonda na mpinzoli ;


bato nyonso oyo balekaki wana babotolaki ye biloko, mpe bavandi ya pembeni na ye bakomaki kotiola ye.


Pamba te ezali mokolo moko ya lokito ya bitumba, mokolo ya pasi makasi mpe ya somo kati na lubwaku ya Emoniseli kowuta na Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga ; ezali mokolo oyo mir ya makasi ekobukana mpe makelele ya koganga ekobima na bangomba.


Bato na Yo bazwaki esika na Yo ya bule kaka mpo na mwa tango moke ; kasi sik’oyo, banguna na biso bakweyisi Ndako na Yo ya bule !


Ndako na ngai ya kapo ebebisami, basinga na yango nyonso ekatani, bamemi bana na ngai ya mibali, natikali lisusu ata na mwana moko te. Nazali lisusu na moto ata moko te oyo akotelemisela ngai ndako ya kapo to akobongisela ngai esika ya kovanda.


Nakobosana libota na ngai, nakosundola libula na ngai, nakokaba molingami na ngai na maboko ya banguna na ye.


Namoni lisusu makambo ya nkele kati na basakoli ya Yelusalemi : bazali kosala kindumba mpe kowumela na lokuta, bazali kolendisa bato oyo basalaka mabe mpo ete batika te misala na bango ya mabe. Bango nyonso bazali liboso na Ngai lokola Sodome, bato ya Yelusalemi bazali lokola bato ya Gomore. »


Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, amemaki na bowumbu, na Babiloni, bato oyo batikalaki kati na engumba elongo na bato oyo bayaki komitika bango moko epai na ye, mpe bato mosusu.


Na makambo ya boye, napesa bango etumbu te ? » elobi Yawe. « Boni, motema na Ngai ezongisa penza mabe na mabe te na ekolo ya boye ?


Tala tina nini nazali kolela mpe miso na ngai etondi na mpinzoli ; moto moko te ayei pene na ngai mpo na kobondisa ngai, moto moko te ayei kolendisa molimo na ngai. Bana na ngai bazali na pasi, mpo ete monguna aleki ngai na makasi.


Yawe azali sembo ; nzokande, ezali ngai nde natombokelaki mitindo na Ye. Boyoka, bino bikolo nyonso, mpe botala pasi na ngai ! Bana na ngai ya basi mpe ya mibali bakei na bowumbu.


Yelusalemi asali masumu mingi penza, yango wana akomi mbindo. Bato nyonso oyo bazalaki kopesa ye lokumu bakomi kotiola ye, pamba te bamoni bolumbu na ye ; ye moko mpe azali komilela mpe abaluki mpo na kobomba elongi.


Yawe asali makambo oyo abongisaki, akokisi liloba na Ye, nyonso oyo aloba wuta kala : akweyisi yo na mawa te, apesi nzela na banguna na yo ete balonga yo, atomboli liseke ya banguna na yo.


Banguna na biso nyonso bafungolaki minoko mpo na kotiola biso ;


Yango wana, Ngai mpe nakotala bango na liso ya mawa te mpe nakobikisa bango te. Kasi nakotanga mabe na bango na mito na bango.


Azongiselaki ngai : — Lisumu ya libota ya Isalaele mpe libota ya Yuda eleki monene makasi penza. Mokili etondi na makila, mpe engumba etondi na kozanga bosembo ; pamba te bazali koloba : « Yawe asundoli mokili ; Yawe azali komona eloko moko te. »


Pamba te nayebi solo ete sima na kufa na ngai, bokomibebisa mpe bokopengwa mosika na nzela oyo natindaki bino. Na mikolo oyo ezali koya, bokono ekokweyela bino, pamba te bokosala mabe na miso ya Yawe mpe bokotumbola kanda na Ye na nzela ya misala ya maboko na bino. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ