2 Butu mobimba, azali kolela se kolela, mpinzoli etondi na matama na ye. Kati na bamakangu na ye nyonso, moko te ayei kobondisa ye ; baninga na ye nyonso bakosi ye, bakomi banguna na ye.
Mafinga ezokisi motema na ngai, mpe pota yango ezali kosila te ; nazelaki elembo ya mawa kowuta na bato, kasi namonaki yango te ; nalukaki babondisi, kasi namonaki bango te.
Soki boyoki te, nakolela na nkuku mpo na lolendo na bino, nakolela makasi, mpe miso na ngai ekosopa mpinzoli, pamba te etonga ya Yawe ekokende na bowumbu.
Sala keba ! Noki te okotikala makolo ngulu mpe okokawuka mongongo likolo ya bitambola-tambola ! Kasi ozali koloba : ‹ Tika na yo ! Ngai nalingaka banzambe ya bapaya mpe nakolanda kaka bango. ›
Baninga na yo nyonso babosani yo, bazali komitungisa lisusu te mpo na yo. Nabetaki yo penza ndenge monguna abetaka, napesaki yo penza etumbu na kanda makasi, pamba te ngambo na yo ezalaki monene mpe masumu na yo eleki ebele.
Oh engumba ekufa, ozali kosala nini ? Olati bilamba ya motane mpe babiju ya wolo ; otie bonzenga na miso na yo. Ozali komikomisa kitoko na pamba, bamakangu na yo bazali kotiola yo mpe bazali koluka koboma yo.
Ah ! Soki nazalaki ata na ndako ya bapaya kati na esobe, nalingaki ata kokima bato na ngai mpe kozala mosika na bango, pamba te bango nyonso bazali bandumba, bazali lisanga ya bakosi !
Nabengisaki baninga na ngai, kasi bakosaki ngai. Banganga-Nzambe mpe bakambi na ngai bakufaki kati na engumba tango bazalaki koluka bilei mpo ete bawumela na bomoi.
Bato bayokaki na bango kolela na ngai, kasi moto akobondisa ngai azali te ; banguna na ngai nyonso bayokaki sango ya pasi na ngai mpe basepelaki na makambo oyo osalaki. Tika ete okokisa solo mokolo oyo olakaki, mpo ete bango mpe bakoma lokola ngai !
Mbindo na ye ekangami ye na elamba, ayebaki te makambo nini ekokomela ye na sima. Tala ye wana akweyi, bongo kokweya na ye ezali kokamwisa ; moto oyo akolendisa ye azali te ! « Oh Yawe, tala pasi na ngai, pamba te monguna alongi ngai ! »
Miso na ngai elembi kobimisa mpinzoli, nazali komitungisa, libumu na ngai ezali kobaluka, motema na ngai ezali kotungisama mpo ete bato na ngai babebisami, mpo ete bana mpe bana oyo bazali komela mabele balembi-lembi banzoto na balabala ya engumba.
Mama na bango atambolaki na kindumba, mpe ye oyo abotaki bango azali mwasi ya lokumu te. Alobaki : « Nakolanda bamakangu na ngai, oyo bapesaka ngai bilei mpe mayi, bilamba ya lino mpe bilamba basala na bapwale ya meme, mafuta mpe masanga. »
Botia motema te epai ya bazalani na bino, botia elikya te epai ya baninga na bino ya motema. Ezala liboso ya mwasi oyo alalaka na tolo na yo, keba na maloba oyo ezali kobima na monoko na yo.
Nyama mpe maseke zomi oyo omonaki ekoyina mwasi ya ndumba, ekobotola biloko na ye nyonso mpe ekotika ye bolumbu ; ekolia misuni na ye mpe ekotumba ye na nzela ya moto.