Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bileli 1:16 - Mokanda na Bomoi

16 Tala tina nini nazali kolela mpe miso na ngai etondi na mpinzoli ; moto moko te ayei pene na ngai mpo na kobondisa ngai, moto moko te ayei kolendisa molimo na ngai. Bana na ngai bazali na pasi, mpo ete monguna aleki ngai na makasi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bileli 1:16
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

banguna na bango banyokolaki bango mpe batiaki bango na se ya bokonzi na bango.


Miso na ngai ezali kosopa mpinzoli, pamba te mibeko na Yo ezali kotosama te.


Oyebi ndenge nini nazali kofingama, oyebi soni mpe kosambwa na ngai ; banguna na ngai nyonso bazali liboso na Yo.


Natalaki lisusu mpe namonaki minyoko nyonso oyo ezali na se ya moyi : Namonaki mpinzoli ya banyokolami, mpe moto akobondisa bango azalaki te ; nguya ezalaki na ngambo ya banyokoli, mpe moto akobondisa bango azalaki te.


Oh engumba ya mawa, engumba oyo mopepe makasi esili kobuka mpe ezangeli kobondisama, nakotonga yo lisusu na mabanga ya talo mpe nakosala miboko na yo na mabanga ya safiri,


Soki boyoki te, nakolela na nkuku mpo na lolendo na bino, nakolela makasi, mpe miso na ngai ekosopa mpinzoli, pamba te etonga ya Yawe ekokende na bowumbu.


Loba na bango maloba oyo : ‹ Butu mpe moyi, miso na ngai ezali kobimisa mpinzoli, ezali kokawuka te ! Pamba te moseka na ngai, bato na ngai, bazali na pasi mingi mpo ete babetami makasi.


Oh Yelusalemi, nani akoyokela yo mawa ? Nani akolela yo ? Nani akotelema mpo na kotuna basango na yo ?


Pasi na ngai ezangeli kisi mpo na kosilisa yango, motema na ngai elembi kati na ngai.


Ah ! Soki nazalaki ata na ndako ya bapaya kati na esobe, nalingaki ata kokima bato na ngai mpe kozala mosika na bango, pamba te bango nyonso bazali bandumba, bazali lisanga ya bakosi !


« Nakokomisa Yelusalemi liboke ya mabanga oyo ebukana-bukana, ndako ya mbwa ya zamba ; nakobebisa bingumba ya Yuda, bongo moto moko te akovanda lisusu kuna.


Loba : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Bibembe ya bato ekolala na mabele mpe ekotikala wana lokola fimie ya bilanga, lokola liboke ya bambuma oyo mobuki bambuma atiki na sima na ye mpe moto oyo akolokota yango azali te. › »


Butu mobimba, azali kolela se kolela, mpinzoli etondi na matama na ye. Kati na bamakangu na ye nyonso, moko te ayei kobondisa ye ; baninga na ye nyonso bakosi ye, bakomi banguna na ye.


Mbindo na ye ekangami ye na elamba, ayebaki te makambo nini ekokomela ye na sima. Tala ye wana akweyi, bongo kokweya na ye ezali kokamwisa ; moto oyo akolendisa ye azali te ! « Oh Yawe, tala pasi na ngai, pamba te monguna alongi ngai ! »


Miso na ngai elembi kobimisa mpinzoli, nazali komitungisa, libumu na ngai ezali kobaluka, motema na ngai ezali kotungisama mpo ete bato na ngai babebisami, mpo ete bana mpe bana oyo bazali komela mabele balembi-lembi banzoto na balabala ya engumba.


Mitema ya bato ezali koganga epai na Nkolo. Oh mir ya Siona, mboka kitoko, tika ete mpinzoli na yo ebima lokola ebale, butu mpe moyi, mpe miso na yo ekangama te !


Ezala soki babokoli bana, nakobotola bango liboso ete bakola. Solo, mawa na bango tango nakopesa bango mokongo !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ