Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bileli 1:10 - Mokanda na Bomoi

10 Monguna asemboli loboko na ye likolo ya bomengo nyonso ya Yelusalemi, bongo azali komona bikolo ya bapaya kokota na esika na ye ya bule, bikolo oyo Yo opekisaki kokota kati na lisanga na Yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bileli 1:10
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nabukodonozori amemaki na Babiloni biloko nyonso ya Tempelo ya Nzambe, ya minene to ya mike, bozwi ya Tempelo ya Yawe, bozwi ya mokonzi mpe ya bakalaka na ye.


Na tango wana, batangaki buku ya Moyize na mongongo makasi mpo ete bato bayoka ; mpe bamonaki ete ekomama boye kati na yango : « Moto ya Amoni mpe moto ya Moabi bakotikala kondimama te kati na lisanga ya Nzambe ;


Bato na Yo bazwaki esika na Yo ya bule kaka mpo na mwa tango moke ; kasi sik’oyo, banguna na biso bakweyisi Ndako na Yo ya bule !


Nakosala ete babotola bino biloko mpe bomengo na bino ; bongo bakofuta bino yango te mpo na masumu na bino nyonso oyo bosalaki kati na mokili na bino mobimba.


Nakokaba bozwi nyonso ya engumba oyo na maboko ya banguna na bango : biloko nyonso ya engumba, biloko ya talo mpe bomengo nyonso ya mokonzi ya Yuda ; bakokamata yango mpe bakomema yango na mokili ya Babiloni.


Pamba te, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi na tina na makonzi, nzungu ya monene ya bronze, bivandelo na yango mpe bisalelo mosusu oyo etikalaki kati na engumba wana,


tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi na tina na biloko oyo etikalaki kati na Tempelo ya Yawe, kati na ndako ya mokonzi ya Yuda mpe kati na Yelusalemi :


Boyoka ! Tala bango bazali kokima mpe babiki wuta na mokili ya Babiloni mpo na koyebisa kati na Siona ndenge nini Yawe, Nzambe na biso, azongisi mabe na mabe ; ndenge nini azongisi mabe na mabe likolo na Tempelo na Ye.


Tosambwe, pamba te totiolami ; mpe bilongi na biso ezipami na soni mpo ete bapaya bakoti kino na bisika ya bule ya Tempelo ya Yawe.


Atumbaki Tempelo ya Yawe, ndako ya mokonzi mpe bandako nyonso ya Yelusalemi ; atumbaki bandako nyonso ya bato minene.


Na mikolo na ye ya pasi mpe ya koyengayenga, tango bato na ye bazali kokweya na maboko ya banguna mpe moto akosunga ye azali te, Yelusalemi azali kokanisa bomengo na ye nyonso ya kala ; bayini na ye batali ye na pamba mpe basepeli na kobebisama na ye.


Wana bozalaki kobonzela Ngai bilei, mafuta mpe makila ya banyama, bokotisaki kati na Esika na Ngai ya bule bapaya oyo batosaka Ngai te mpe bakatama ngenga te, mpo na kobebisa bosantu ya Tempelo na Ngai ; na bongo, bobebisaki boyokani na Ngai mpo na kokokisa misala na bino nyonso ya mbindo !


Elongi na Ngai ekotala bango lisusu te, mpe bato mabe bakobebisa Esika na Ngai ya bule. Bongo, miyibi bakokota kuna mpe bakosambwisa yango.


Alobaki na bango : « Bokomisa Tempelo mbindo mpe botondisa mapango na yango na bibembe. Bokende ! » Babimaki mpe bakendeki koboma bato kati na engumba.


Tango bokomona makambo ya nkele kosalema kati na Esika ya bule, —tika ete motangi asosola malamu— wana tika ete bato oyo bakozala kati na Yuda bakima na bangomba ;


Mwana makangu moko te to bakitani na ye bakoki kokota na lisanga ya Yawe ata sima na milongo zomi.


Moto moko te ya Amoni to ya Moabi to bakitani na bango bakoki kokota na lisanga ya Yawe ata sima na milongo zomi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ