mpe bokoki kotonga bandako te, kosala bilanga te, kolona banzete ya vino te mpe bokoki kozala na biloko wana te ; kasi bosengeli kaka kovanda tango nyonso na bandako ya kapo, mpo ete bozala na bomoi molayi kati na mokili oyo bozali baleki nzela. »
Ezala esepelisi biso to te, tokotosa kaka Yawe, Nzambe na biso, oyo topesi yo mokumba ya kotuna. Na bongo, makambo nyonso ekotambola malamu mpo na biso, pamba te tokotosa Yawe, Nzambe na biso.
Bosala keba mpo na kotosa mibeko oyo nazali kopesa bino mpo ete bomona bolamu tango nyonso, bino mpe bana na bino, pamba te na nzela wana nde bokosala oyo ezali malamu mpe alima na miso ya Yawe, Nzambe na bino.
Batela bikateli mpe mitindo na Ye, oyo nazali kopesa yo lelo mpo ete ozala moto ya esengo, yo mpe bana na yo sima na yo, mpe mpo ete owumela tango molayi na mokili oyo Yawe, Nzambe, na yo apesi yo mpo na libela.
Okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu, ndenge Yawe, Nzambe na yo, atindaki yo mpo ete ozala na bomoi ya molayi, mpe ozala moto ya esengo kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, azali kopesa yo.
Botambola na banzela nyonso oyo Yawe, Nzambe na bino, atindaki bino mpo ete bozala na bomoi, mpo ete bozala bato ya esengo, mpe mpo ete bobakisa mikolo ya bomoi na bino kati na mokili oyo bokokamata.
Sala oyo ezali alima mpe malamu na miso ya Yawe, mpo ete ozala moto ya esengo, mpo ete okota, mpe mpo ete okamata mokili ya malamu oyo Yawe alakaki kopesa na bakoko na yo na nzela ya ndayi,