Mokonzi alambisaki biloko ebele mpo na lokumu ya Ester mpe mpo na kosepela elongo na basali na ye nyonso mpe bakalaka na ye. Akataki lisusu ete, na mokolo wana, bituka nyonso efuta mpako te mpe akabolaki bakado na motema ya esengo.
Nani amata na Lola to mpe akita wuta kuna ? Nani asangisa mopepe kati na maboko na ye ? Nani akanga mayi na kazaka na ye ? Nani akata bandelo nyonso ya mabele ? Kombo na ye nani ? Mpe kombo ya mwana na ye ezali nani ? Yebisa ngai soki oyebi !
Asilisaki makasi ya milimo mabe mpe ya nguya ya bakonzi ya molili, asambwisaki yango na miso ya bato nyonso mpe atambolisaki yango lokola bakangami ya etumba tango alongaki yango na ekulusu.
Tango Davidi akomaki na Tsikilagi, atindaki ndambo ya bomengo ya bitumba epai ya bampaka ya Yuda, oyo bazalaki baninga na ye. Alobaki : « Tala kado mpo na bino kowuta na bomengo ya bitumba ya banguna ya Yawe. »