Kasi Nkolo alobaki na Ananiasi : — Kende, pamba te nasila kopona moto wana lokola esalelo na Ngai mpo na kosakola Kombo na Ngai epai ya bikolo ya bapaya, epai ya bakonzi na bango mpe epai ya bana ya Isalaele.
To mpe boni, okanisi ete ozali kotiola bomengo ya boboto, ya kokanga motema mpe ya bolamu na Nzambe, wana ozali kobosana ete boboto na Ye ememaka yo na kobongola motema ?
Pamba te Nzambe oyo asalaki kati na Petelo mpo ete azala ntoma ya bato oyo bakatama ngenga asalaki mpe kati na ngai lokola mpo ete nazala ntoma ya Bapagano.
mpo na kotalisa na bato ya bikeke oyo esengeli koya na sima, bomengo monene ya ngolu na Ye, oyo alakisaki kati na Yesu-Klisto na nzela ya boboto na Ye epai na biso.
Nzambe asepeli kolakisa bango bomengo ya nkembo, oyo evandi kati na mabombami ya mabongisi na Ye mpo na Bapagano. Mabombami yango ezali : Klisto kati na bino, elikya ya nkembo.
Tala liloba ya solo penza, liloba oyo ekoki na kondimama mpe koyambama na mobimba na yango : Yesu-Klisto ayaki kati na mokili mpo na kobikisa bato ya masumu ; mpe kati na bato yango ya masumu, ngai nde naleki na masumu.
Ezali mpe mpo na litatoli yango nde Nzambe atiaki ngai mopanzi sango mpe ntoma, mpo na kolakisa kondima mpe solo epai ya Bapagano. Nazali kokosa te, nazali nde koloba solo.
Yango wana, nazali kopesa yo toli ete osomba epai na Ngai wolo oyo bapetola na moto mpo ete okoma penza mozwi, bilamba ya pembe mpo ete olata mpe obomba bolumbu na yo ya soni, mpe kisi ya miso mpo ete otia na miso na yo mpe omona malamu.