Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ba-Efeso 3:3 - Mokanda na Bomoi

3 mpe ayebisaki ngai mabombami na nzela ya emoniseli, ndenge nasili kokomela bino na mwa maloba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ba-Efeso 3:3
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sima na ngai kozonga na Yelusalemi, wana nazalaki kosambela na Tempelo, nakweyaki na Molimo


Kasi Nkolo azongiselaki ngai : « Kende, nakotinda yo mosika, epai ya bato ya bikolo ya bapaya. »


Makelele emataki makasi penza. Boye ndambo ya balakisi ya Mobeko oyo bazalaki Bafarizeo batelemaki mpe batombolaki mingongo na mpiko nyonso : — Solo, tomoni ata mabe moko te ya kopamela moto oyo. Nani ayebi ? Tango mosusu molimo to anjelu nde alobaki na ye.


Bandeko, nalingi ete boyeba mabombami oyo mpo ete bomimona te ete boleki na bwanya : ndambo ya bana ya Isalaele bakowumela kozala mitema libanga kino Bapagano nyonso bakokota na libota ya Nzambe.


Na Ye oyo azali na nguya ya kotelemisa bino ngwi na nzela ya Sango Malamu oyo nateyaka, mpe na nzela ya mateya ya Yesu-Klisto kolanda emoniseli ya mabombami ya Nzambe, oyo ebombama wuta kala,


Boni, nasengeli komikumisa ? Te, ezali na tina te ! Kasi tika nayebisa bino makambo oyo namonaki lokola na ndoto, mpe bimoniseli oyo Nkolo alakisaki ngai.


Nazwaki yango na moto moko te, nayekolaki yango mpe te ; kasi ezali Yesu-Klisto nde alakisaki ngai yango na nzela ya emoniseli.


mpe nasengaka ete Nzambe ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, Tata ya nkembo, apesa bino Molimo ya bwanya mpe ya emoniseli mpo ete bokoka koyeba Ye malamu.


Tango bokotanga maloba yango, bokokoka kososola mayele na ngai kati na mabombami yango oyo etali Klisto.


Mabombami yango ezali boye : Kati na Yesu-Klisto, na nzela ya Sango Malamu, Bapagano bazali bakitani ya libula elongo na Isalaele, biteni ya nzoto moko, mpe basangani elongo kati na elaka moko.


apesa ngai mpe ngolu ya kosunga bato nyonso mpo ete basosola ndenge nini Nzambe akokisaka mabombami oyo ezalaki wuta kala ya kobombama kati na Ye, Mokeli na nyonso,


Bobondelaka mpe mpo na ngai mpo ete, tango nyonso nakozala koteya, Nzambe apesa ngai maloba oyo nasengeli kotatola mpo na kosakola mabombami ya Sango Malamu, na kozanga bobangi.


Nazali kosala bongo mpo ete balendisama, bazala moko kati na bolingo, batonda na elikya oyo ewutaka na bososoli ya mabombami ya Nzambe, mpe batonda na boyebi ya mabombami yango ; mabombami yango ezali Klisto.


Bobondelaka mpe mpo na biso, na tina ete Nzambe apesa biso mabaku ya koteya Sango Malamu mpo na kosakola mabombami ya Klisto. Mpe ezali mpo na mabombami yango nde ngai nazali mokangami kati na boloko.


Nazali kosenga na bino bandeko na ngai ete bokanga motema na koyamba malendisi oyo nakomeli bino na mokuse penza.


Na lisungi ya Silasi oyo azali ndeko ya solo, nakomeli bino mokanda oyo na mokuse mpo na kolendisa bino mpe kolakisa bino ete ngolu oyo bokangami na yango ezali ngolu ya solo ya Nzambe. Bopikama kati na yango.


Boyeba malamu ete ezali mpo na lobiko na bino nde Nkolo na biso azali nanu kokanga motema, ndenge Polo, ndeko na biso ya bolingo, akomelaki bino, kolanda bwanya oyo Nzambe apesaki ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ