Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ba-Efeso 2:3 - Mokanda na Bomoi

3 Biso nyonso mpe, na kala, tozalaki elongo na bango, tozalaki kotambola kolanda baposa na biso ya nzoto, tozalaki kokokisa nyonso oyo nzoto mpe makanisi na biso ezalaki kotinda biso kosala. Lokola bato mosusu, kanda ya Nzambe esengelaki kokweyela biso mpo na mabe ya bomoto na biso.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ba-Efeso 2:3
54 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango Adamu akokisaki mibu nkama moko na tuku misato ya mbotama, abotaki mwana mobali na elilingi na ye mpe na lolenge na ye. Apesaki ye kombo « Seti. »


Yawe amonaki ndenge nini mabe ya moto ekomaki mingi kati na mokili, mpe tango nyonso, makanisi ya motema ya moto ezalaki kaka mabe.


Boye, Yawe ayokaki solo kitoko mpe amilobelaki : « Nakolakela lisusu mabele mabe te likolo ya moto, pamba te wuta bomwana ya moto, motema ya moto elukaka kaka makambo mabe ; nakoboma lisusu te bikelamu nyonso ya bomoi ndenge nawuti kosala.


Nani akoki kobimisa bopeto kati na mbindo ? Moko te !


Ndenge nini moto akoki kozala sembo na miso ya Nzambe ? Ndenge nini moto oyo abotami na mwasi akoki kozala peto ?


Pamba te nayebi mabe na ngai, mpe masumu na ngai ezalaka tango nyonso liboso na ngai.


Biso nyonso, tozalaki koyengayenga lokola bana meme, moko na moko azalaki kolanda nzela na ye ; bongo Yawe akweyisaki masumu na biso nyonso na nzoto na ye.


kasi mitungisi ya bomoi, lokoso ya bomengo mpe baposa ya makambo ya mokili efini-fini Liloba kati na bango, boye ekotikala kobota bambuma te kati na bango.


Bakomi bana na Nzambe na nzela ya mbotama ya bomoto te, na posa ya bomoto te to mpe na mokano ya moto te, kasi na mokano ya Nzambe.


Ezali Satana nde azali tata na bino, mpe bolingi nde kaka kokokisa posa ya tata na bino. Wuta na ebandeli, ye azala mobomi ; avandaka kati na solo te, pamba te solo ezalaka te kati na ye. Tango akosaka, alobaka penza makambo oyo ewutaka kati na ye ; pamba te azali mokosi mpe tata ya lokuta.


Na tango ya kala, Nzambe atikaki ete bato ya bikolo nyonso balanda nzela oyo bango moko balingi.


Yango wana, Nzambe akabaki bango kati na baposa mabe ya mitema na bango mpe na misala ya bosoto, mpo ete basambwisa banzoto na bango moko, na nzela ya moko to ya mosusu.


Ndenge na kala bozangaki botosi na miso ya Nzambe mpe sik’oyo Nzambe ayokeli bino mawa likolo ya kozanga botosi ya Bayuda,


Kasi bolata Nkolo Yesu-Klisto mpe bomitungisa te na baposa ya nzoto oyo ezali kobundisa bino.


Soki Bapagano oyo bayebi Mobeko te bazali kosala na ndenge na bango moko makambo oyo Mobeko esengaka, boyeba ete bamikomisaka Mobeko mpo na bango moko atako bazali na Mobeko yango te.


Solo, wana tozalaki nanu banguna ya Nzambe, Ye moko Nzambe azongisaki boyokani na biso elongo na Ye na nzela ya kufa ya Mwana na Ye. Boye lokola azongisi boyokani yango, akobikisa biso mpe na nzela ya bomoi ya mwana na Ye.


Lokola tokomi sik’oyo bato ya sembo na nzela ya makila na Ye, Klisto akobikisa biso mpe na kanda ya Nzambe.


Yango wana, tika ete lisumu ezala lisusu na bokonzi te kati na banzoto na bino, oyo ekokufa ; mpe bosengeli lisusu te kotosa baposa na yango ya mabe.


Pamba te nayebi malamu ete bolamu evandaka kati na ngai te, elingi koloba : evandaka kati na nzoto na ngai te. Nazalaka na posa ya kosala bolamu, kasi nazangaka nguya ya kokokisa yango.


Okoloba nini soki Nzambe, mpo na kolakisa kanda mpe nguya na Ye, ayikelaki mingi mpiko mbeki oyo etumbolaka kanda na Ye, mbeki oyo ebongisami mpo na kobebisama ?


Boni, nani azali kokesenisa yo na bato mosusu ? Eloko nini ozali na yango, oyo bapesa yo te ? Mpe lokola bapesa yo yango, mpo na nini komikumisa lokola nde bapesaki yo yango te ?


Balingami na ngai, lokola tozali na bilaka ya lolenge oyo, tomipetolaka na nyonso oyo ekomisaka nzoto mpe molimo mbindo, mpo na kotambola na bomoi ya bosantu, kati na kotosa Nzambe.


Kasi tala makambo oyo Makomi eloba : Mokili mobimba ezali na se ya bokonzi ya lisumu mpo ete elaka ya Nzambe ekokisama epai ya bandimi na nzela ya kondima na bango kati na Yesu-Klisto.


oyo bozalaki kosala na kala mpo na kobika bomoi na bino tango bozalaki kotambola kolanda baposa ya mokili oyo, mpe tango bozalaki kolanda mokonzi ya milimo mabe, molimo oyo ezali kosala sik’oyo kati na bato oyo bazangi botosi epai ya Nzambe.


mpo ete bobwaka etamboli na bino ya kala, etamboli ya bomoto na bino ya kala, oyo ebebaka na nzela ya baposa ya lokuta,


Nzokande na kala, bozalaki mosika ya Nzambe mpe bozalaki banguna na Ye mpo na mabe nyonso oyo bozalaki kokanisa mpe kosala.


Bandeko, toboyi bozanga boyebi na tina na bato oyo bakufa, mpo ete bozala na mawa te lokola bamosusu oyo bazangi elikya.


Yango wana tolalaka pongi te lokola bato mosusu, kasi tosenzelaka mpe tomibatelaka malamu.


Bato oyo balingaka kokoma na bomengo bakweyaka kati na komekama mpe bakangamaka na mitambo ya baposa mingi ya bozoba mpe ya mabe, oyo ememaka bango na libebi mpe na kufa.


Pamba te biso mpe, na kala, tozalaki kosala makambo lokola bazoba, lokola bato bazanga botosi na miso ya Nzambe, lokola bato babunga nzela, lokola bawumbu ya lolenge nyonso ya baposa mpe ya bisengo. Na bomoi na biso, tozalaki kobika bomoi ya kosalaka mabe na bato mpe ya bilulela. Bato bayinaki biso, mpe tozalaki koyinana biso na biso.


Lokola bana ya botosi, botambola lisusu te kolanda baposa mabe oyo bozalaki na yango tango bozangaki boyebi.


Miso na bango elembaka te kolula basi mpo na koluka kosala na bango ekobo, balembaka te kosala masumu, bakosaka bato oyo balendisama malamu te na kondima ; bazali na mitema etonda na lokoso : bazali na se ya bilakeli mabe ya Nzambe.


Pamba te, mpo na kosepelisa baposa mabe ya banzoto na bango, basalelaka maloba ya sukali mpe ezanga tina mpo na kopengwisa bato oyo bawuti kobongola mitema sika wana bawuti kokabwana na bato oyo babikaka kati na libunga.


pamba te nyonso oyo ezali kati na mokili, lokola baposa mabe ya nzoto, posa makasi ya konduka biloko oyo miso ezali kolula, mpe lofundu mpo na biloko ; ewuti na Tata te, kasi ewuti na mokili.


Nzokande, nazali mpe kokomela bino mobeko ya sika, mpe sika na yango emonani kati na Yesu mpe kati na bino, pamba te molili ezali kolimwa mpe pole ya solo esili kobanda kongenga.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ